Bunda etumba elamu ya kondima

L iteya ya yambo (1) L isapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya N zambe

Asopaki ngolu yango epai na biso na boyebi nyonso mpe na bososoli. Ayebisaki biso libombami na mokano na ye pelamoko na mwango na ye oyo emonisi ye kati na Klisto, lokola ebongisaki ye mpo na kokokisa elaka ete ayanganisa biloko nyonso kati na Klisto lokola motó, yango na Likolo mpe yango na nse.

(Ba Efese 1 :8-10 Biblia Haut Fleuve)

Mposa ya kokokisa sima ya liteya

Na suka ya eyangeli oyo, bosengeli kozwa Eleko oyo biso tozali kobika na kondimaka ete : • Nzambe ya molóngó, Nkolo Nzambe ya Nguya Nyonso, azali se ye moko, Nzambe ya solo, ya libela, ya bileko nyonso, oyo azali kati na bato misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu. • Nzambe azali mozalisi ya biloko nyonso oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te. Asali moto na elilingi na ye. • Llikolo ya kotomboka ya satana* mpe na bato mibale ya liboso*, Nzambe alakelaki bikelamo nyonso mabe ; kasi ata bongo apesaki elaka mpe mwango ya kolonga mabe mpe kozongisa biloko nyonso malamo na nzela ya Nkolo na biso Yesu Klisto. Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na yo ete ozali liziba ya bwanya mpe mayele nyonso. Nandimi ete ezali solo ; Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli yo lakisa ngai mpe lakisa ngai nzela nakolanda (Nzembo 32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soko nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya ya milimo mpe makabo ya Nzambe na oyo

Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya

*Satana – satana ezali nkombo penza ya zabulu, mbanda (monguna) ya Nzambe mpe ya bato. *Bato mibale ya liboso : Adamu mpe Ewa basalemaki na Nzambe lokola mobali mpe mwasi ya liboso, na elilingi ya Nzambe mpo bazala na boyokani na ye. Básala mosala na ntina, mpe mpo basepela na bozwi ya mokili ya kokoka oyo Nzambe asalaki.

15

Made with FlippingBook - Share PDF online