Bunda etumba elamu ya kondima

16 • Bunda etumba elamu ya kondima

ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na yo na motema mobimba. Nkolo ya bolingo, nabondeli yo osunga ngai nayokamela mpe nayoka noki, kasi naloba mpe nasilika noki te (Jake.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai endimama na miso na yo. Sunga ngai naloba solo na Yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayóki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, lolenge nayamba liloba na yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. Yango tozali kaka biso moko na mokili ? Bilili mingi ya Holly Wood emesáná kolakisa bomoi ya bikelamo oyo ezalaka na biso awa na mokili oyo te. Bilili yango esanganaka na makambo mabe mpe ya somo. Bato mingi bakanisaka bobele tozali biso moko na kati na molóngó (mokili) te, ata soki bakoki kopesa likanisi noki ete bazali na likanisi ya epai wapi lobiko ya milimo yango ezali, to mpe soki ezali boni. Bamosusu bakanisaka ete biso bato tozali biso moko na etando ya ebele ya moyi, mpe lisanga ya minzoto to mpe bikelamo ya lola. Basusu bakanisaka ete tokelámá na kolandaka etambweli mpe mbongwana ya mokili ; basusu mpe bakanisaka ete tokelámá na *binzambe-nzambe ya mokili mpe bamosusu balobi ete moto moko te akoki koyeba makambo ya motindo wana. Na ntango bino bozalaki kokola na bomwana na bino, makanisi na bino ezalaki nini mpo na epai towuti, mpe bateyaki yo nini na oyo etali epayi lola mpe mokili ewuti ? 2. « Ezalaki mokolo moko... ! » Mingi kati na biso bakoli na koyokaka masolo oyo ezali lokola masapo bayekolisaka bana ya kelasi ya soso (bana ya mibu 3 kino 5) ; masolo oyo eteyamaka na kelasi, na ndako, na nsámbo mpe bongo na bongo bipai nyonso bato bazali na mokili. Balingaka koyoka mpe kobeta masolo to masapo ya bilili, na kotangaka mosusu na babuku mpo na koseka, balingaka mpe komonana mpe kosalela yango bitalo (theâtre), na etando monene, kokoma na babuku, kosalela na facebook, bazulunalo, bansango na bitando mokie- mikolo nyonso, toyokaka masapo ndenge na ndenge ná oyo ya solo, ná ya lokuta, misusu ebendaka bokebi ya bato, mosusu mpe ya nsoni. Nakanisi te ete okokamwa koyoka ete Biblia ezali kolobela kaka lisolo (lisapo) moko. Makomi Esantu oyo ezali lisanga ya mikanda ntuku motoba na motoba (66), oyo ekomami na bato kokesana na bileko kokesana kino mobu 1500. Yango ezali kolobela kaka lisolo (lisapo)

Bokutani *Binzambe nzambe — binzambe nzambe ezali bikelamo oyo ezali na nguya koleka to bikelamo oyo ezali na nguya mingi mpe bato mosusu bakanisaka ete bango nde nzambe ya solo.

Mangoba oyo esambelaka binzambe nzambe ebengami mpe bobele binzambe nzambe

Made with FlippingBook - Share PDF online