Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 17

moko- lisolo ya Nzambe tata na biso mpe mposa na ye ya kobikisa bikelamo na Ye. Yo, okanisi penza nini mpo na masapo ? Oyóká nano te ete Biblia elobaka se lisolo moko etali Nzambe na kobikisa na ye ? Bokesani nini tosalaka na masapo oyo toyoka na oyo ya Biblia to mpe mpo na Nzambe na mposa na ye ya kobikisa mokili ? 3. « Na ndenge ngai nakoki koloba, mwango moko ezali te ». Uta ebandeli ya kondima, mwa nsima ya ntango ya Bantoma, bandimi bandimaki mitindo ya ntina ya bondimi (mitindo likonzi ya bondimi). Mibale oyo eyebani mpe elobami na motu na lobiko ya bato kino lelo ezali : « Kondima na bantoma » mpe « kondima ya Nikea ». Kotatola bondima ya bantoma mibale ya mikuse wana elobi na bokuse lolenge Biblia elobeli biso ndenge Nzambe azali. Nzambe azali oyo asalaki kati na Yesu Klisto, mpe emonisi lolenge bikelamo nyonso ekozonga malamo, na mayele mpe na mwango ya Nzambe. Mingi ya bato oyo bandimelaka Nzambe te, bandimaka ete mokili (molóngó) esalema na pwasa, na kozanga ntina, mpe ata moto moko te azwaka likanisi ya kozalisa yango. Balobi mpe lisusu ete ezali ata na mwango moko te oyo esangisi bikelamu nyonso. Ezali mpe ata na eloko moko te oyo ekoki kosunga biso toyeba ntina na biso na mokili, to toyeba epai wapi tozali kokende mpe lolenge nini eloko nyonso ekokóma. Ba Athée (bandeko oyo bandimaka te ete Nzambe azali ), bango mpe balobi ete ezali bolema kokanisa ete Nzambe azali to mpe mwango moko monene ezali mpo na mokili. Bazalaki na mimesano ya kolobaka ete lokola Nzambe moko azalaka te, bobele ebolo ya mokili oyo ebima se pwasa boye, mokili ezali mpe na nsuka te, mpe ntina ya kobika awa na mokoli ezali te. Ba Agnostique, (baye balobaka ete tokoki koyeba te to Nzambe azali to mpe azali te), bango balobaka ete ata soki Nzambe azalaka biso bato tokoki mpe koyeba ye te. Na bongo eloko tokoki kosala bobele kolikya ete biloko nyonso ya mokili ekokoma malamo ntango mosusu ! Lolenge nini kondima ya bantoma mpe oyo na Nikea ekoki kosunga biso toyanola na mibenzwa (makanisi malongobani te) oyo edimelaka ete Nzambe azali te mpe mwango ya mokili ezali te ? Na kati ya Biblia tozali kokuta lisolo ya Nzambe mpe ya moto, lisolo oyo etie Yesu na kati-kati na yango lokola Nkolo na biso. Kasi lisolo yango ezali monene koleka oyo totangaka na babuku. Ezali likambo oyo biso mpe tozali na kati mpe kosalela yango. Lokola bayekoli na Yesu, bozali sikoyo na emoneli mpe ezaleli oyo eyebani ya sika, mpe oyo ya bino mosala ya kokokisa na eleko oyo tozali na kati na yango.

Makambo ezali kati na liteya

Made with FlippingBook - Share PDF online