Bunda etumba elamu ya kondima

18 • Bunda etumba elamu ya kondima

Mokili esalemaki na ye, *bokonzi na ye eleki nyonso, ye *Nzambe na kati ya bato misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosantu. Ye, abikaka uta liboso ya ekeké, mpe akotíkálá na nkémbo ya libela na libela, mpe azangi eloko moko te. Nzambe asepelaki kosala mokili, epai wapi bato ye asala na lolenge na ye bakoka kobika na makoki nyonso etonda na bikelamo na ye. Kasi mokili ebuakamaki na yiki-yiki likolo ya kotomboka ya *mwanzelu mokonzi, Satana. Na makanisi ya kobongola mpe kokweyisa Bokonzi na Nzambe, satana amekaki bankoko na biso (Adama na Ewa) ete batombokela Nzambe, yango wana etika mokili na bilakeli mabe ya kozangáká elikya ya lisiko. Mpo na kotelemela botomboki, Nzambe akanaki kobimisa Molongi, Mobikisi oyo akoki kosikola bato na botutu oyo bazalaki na yango uta na bankoko mpe kosilisa mabe na yango nyonso. Na nzela ya Abalayama, Nzambe apesaki elaka ya komema Masiya to mobikisi (Mopakolami ya Nzambe) mpe ya kotombola libota epayi wapi Masiya akowuta : Yisalaele. Mpe, ntango eleko abongisaki ekokaki, Nzambe atindaki mwana na ye Yesu mpo na komonisa nkembo na ye, kosikola libota na ye, mpe mpo na kobikisa bikelamo na ye. Yesu amonisaki bwanya na Bokonzi na ye na nzela ya mateya na ye mpe na nguya ya bikamwisi. Na mposa na ye moko andimaki apesa bomoyi na ye na kokufa kati na ekulusu, mpo na kofuta nyongo ya *masumu na biso mpe kobuka misala ya monguna Satana. Nzambe esekwisaki Yesu na kati ya bakufi, na nsima ya mikolo ntuku mineyi *anetuaki na likolo lokola Nkolo molongi. Na mokolo ya ntuku mitano na nsima ya kosekwa na ye, atindaki Molimo Mosantu mpo na kopesa nguya ya kokolisa lisanga ya *bayekoli ya Yesu Klisto, *Eklezia. Lokola libota ya tata, nzoto ya Yesu Klisto, mpe Tempelo ya Molimo Mosantu, Eklezia etindami kobenga bato bipai nyonso na mokili po na kokota na kati ya lisolo monene. Tango etumba malamu na kondima * Bokonzi oyo eleki nyonso – nkombo oyo eleki nyonso na nguya, na mikano ya suka likolo na nyonso. *Nzambe moko kati ya bato misato – ezali lolenge ya koloba bato misato kati na Nzambe moko. *Banzelu – Banzelu bazali bikelamu ya molimo baye bakelami na Nzambe mpe baleki bato na nguya, mpe na mayele *Lisumu – ezali kokweisama, kozanga kosala mokano to etinda ya Nzambe na makambo tosal aka, tolobaka mpe tokanisaka. *Konetua – yesu atikaki mabelé mpe abutaki, amataki na likolo na nzoto na ye na miso ya bayekoli na ye. Na nsima ya kufa mpe lisekwa na ye. Konetua na ye ezalaki lolenge ya kotika mabele mpo na kokenda kofanda na kiti ya bokonzi ya elonga lokola molongi. konetua etie mpe esali ete Molimo Mosantu aya kopesa makasi na baklisto ya mokili mobimba. *Bayekoli – moyekoli azali moto oyo akoyekola to mpe azalaki elongo na yesu. Moklisto nyonso azali Moyekoli ya Yesu. Ntango mosusu moyekoli elobamaka kaka mpo na bayekoli zomi na mibale ya Yesu. *Lingomba to etonga to mpe Eklezia – ezali lisanga ya bato na Nzambe oyo bayebi Yesu lokola Nkolo mpe Mobikisi, baye bazali kopalanganisa mwango na ye na mokili mobimba : ézala baye baleka (baye bakufa), baye bazali nano, to mpe baye bakoya na bisika nyonso ya mokili na molayi ya lisolo na yango.

Made with FlippingBook - Share PDF online