Bunda etumba elamu ya kondima

150 • Bunda etumba elamu ya kondima

M onkanda ya kobakisa 9 L itatoli na biso ya kotalela N zambe Rév. Dr. Don L. Davis

Ezali na motuya mingi Koteya efandelo malamo epayi ya baklisto na kati ya esika oyo bonsomi ezwamaki na nzela ya elonga na liwa ya Klisto na ekulusu, mpe na kokota ya Molimo Mosanto na bomoyi mpe na etinda ya Lingomba (elingi koloba, Bagalatia 5 :1, « Ezali mpo na bonsomi nde Klisto asikolaki biso »), mpe na kosalelaka bonsomi na yo ntango nyonso mpo na lokumu na Nzambe mpe ezala ya kotambwisa bokonzi na Klisto. Elongo na minkanda oyo ezali komanyola likambo etali bonsomi ya bantoma na Boyokani ya Sika, nakanisi tokoki kopesa baninga misusu makoki ya kobika mpo na Klisto mpe mpo na bokonzi na Ye na kolobaka makasi makambo ya motuya « 6-8-10 » ya 1Bakolinti, mpe kosalela yango na makambo nyonso etali ezaleli ya bato. 1. 1Bakoli. 6 :9-11 Ezaleli ya moklisto ezali mpo na mbongwana kati na Klisto ; ezali te mpo na kosenga bolimbisi ebele nde moto akokota na Bokonzi ya likolo. 2. 1Bakoli 6 :12a Tozali na bonsomi kati na Klisto, kasi biloko nyonso ekoki kolendisa kondima te, mpe ezali kosunga te. 3. 1Bakoli. 6b –Tozali na bonsomi kati na Klisto, kasi eloko nyonso ebakisami mpe ekomisi yo bowumbu ekeseni mpe etioli Klisto mpe bokonzi na Ye. 4. 1Bakoli. 8 :7-13 -Tozali na bonsomi kati na Klisto, kasi tokoki te tokomisa na yango libaku, na koleka epayi na baklisto oyo mitema na bango ekoki kobebisama, mpe bakoki kobeta mabaku soki bamoni biso kosala makambo oyo ezali kotuka bango. 5. 1Bakoli 10 :23 –Tozali na bonsomi kati na klisto ; makambo nyonso ezali na mobeko mpo na biso kosala yango, kasi nyonso ezali na litomba te, to kosunga to kokolisa biso na bolamu te. 6. 1Bakoli. 10 :24 Tozali bansomi kati na Klisto, nde esengeli tosalela bonsomi na biso mpo na kolinga bandeko na biso kati na Klisto mpe koteya bango bayeba kosala mpo na bolamu ya bandeko misusu. 7. 1Bakoli. 10 :31 tozali bansomi kati na Klisto, kasi bonsomi yango epesamela biso mpo na kokumisa Nzambe na makambo nyonso.

Made with FlippingBook - Share PDF online