Bunda etumba elamu ya kondima

Minkanda ya kobakisa 151

8. 1Bakoli.10 :32-33 Tozali bansomi kati na Klisto, kasi yango ezali mpo na kotumola basusu na mokili to na Lingomba te, kasi nyosno tokosala esunga bango koyeba mpe kolinga Klisto mpo bango mpe babika. Mpo na kobakisa na makambo oyo ya motuya, nandimi ete tosengli toloba lisusu makasi na ntina ya mibeko oyo : • 1Pet.2 :16 –Tosengeli kozala na bonsomi na kati na Klisto lokola basali ya Nzambe, kasi tokosalela bonsomi na biso mpo kozipa mabe na biso te. • Yoane 8 :31-32 –Tozali komimonisa, tozali bayekoli na Klisto bobele soki towumeli mpe soki tozali kokoba kobika na Liloba na Ye, mpe soki tosali bongo toyeba solo mpe solo wana esikola biso kati na Ye. • Bagal.5 :13 –Lokola bandeko basi mpe mibali na Klisto, tobengami tozala na bonsomi, kasi tosalela bonsomi na biso lokola ndingisa ya ezaleli ya masumu te, esengeli nde totangwa na masumu mpo na komisalisa biso na biso kati na bolingo. Wana tolobi mingi mpo na bonsomi, na makanisi na ngai, yango etali bakóló to bilenge ya mibu zomi na ndambo. Mingi mingi, lolenge toteyaka bato mpo bákóma bayekoli ya sika ezali ya kotangela bango molongo ya mbeba to mabunga kokesana oyo esalemaka na efandeli, mpe ntango mosusu ekoki kopesa bango likanisi bobele ete kimoklisto ezali bobele losámbo ya kobundisa mabe mpamba te, kasi ezali mpe (losambo oyo epekisaka makambo mabe), losambo oyo kondima eboyi mingi mpenza kosumuka. Na solo mpenza, ezaleli ya moklisto etali nde bonsomi, bonsomi oyo Nkolo azwelaki biso na ntalo monene mpo na kolinga Nzambe mpe kokolisa bokonzi na Ye ; bonsomi ezali kobika bomoyi ya komiboya liboso na Nkolo. Mokumba ya Baklisto ya engumba (to ya ville) ezali ya kobika na bonsomi kati na Yesu Klisto, kobika na bonsomi mpo na lokumu na Nzambe, mpe kosalela mibeko lokola ndingisa ya kosumuka te. Eloko mpenza liteya oyo ezali kolobela makasi ezali likambo etali bonsomi oyo tozwa na nzela ya kufa ya Klisto mpe lisekwa na Ye mpe bosangani na biso na Ye. Sikoyo tosikolami na mibeko, na masumu, na liwa, na kokweyisama na mabunga na biso, na oyo mobeko emonisi biso polele. Sikoyo tozali kosalela Nzambe na kokanisaka bolamo asaleli biso, mpe ezaleli na biso etindi ete tolobela bonsomi na kati ya Klisto. Na boye, tokosalela bonsomi na biso mpo tomonana bato oyo bayebi nyonso to bato ya mutu makasi te, kasi tosengeli nde topesa Nzambe lokumu mpe tolinga baninga. Wana penza nde likanisi tokolobela bato oyo bazali kosalela bosangisi nzoto kati mobali na mobali mosusu, kosopa zemi mpe makambo mabe misusu na ezaleli. Basusu bazali na bizaleli ya motindo wana mpe balobi ete bazali nde na bonsomi, nzoka nde bazangi koyeba Nzambe na

Made with FlippingBook - Share PDF online