Bunda etumba elamu ya kondima
158 • Bunda etumba elamu ya kondima
M onkanda ya kobakisa 14 M apamboli ntuku misato na misato (33) kati na klisto Rév. Dr. Don L. Davis
Oyebi ete makabo ntuku misato na misato (33) epesameláki yo ntango okómákí mondimi na Yesu Klisto ? Lewis Sperry Chafer, Moyangeli ya sukuklu ya Seminele ya teoloji na mboka Dallas, atangaki matómbá na ye na buku akomá, Systematic Theology, Vol.III (pp.234-266). Makambo oyo elongo na mdambo ya ndimbola na yango na mokuse, epesi moklisto oyo abotami lisusu ndimbola ya kitoko koleka ya mosala ya ngolu oyo ekokisami na bomoyi na ye ndenge moko na ndenge asepelisi bato na bomoyi na ye. 1. Na mwango ya Nzambe ya bileko na bileko, mondimi : a. Ayebanaki liboso –Mis. 2 :23 ; 1Pet.1 :2,20. Nzambe ayebaki uta bileko nyonso esika na esika likambo nyonso ekokóma na kati ya mwango na molóngó to mokili. b. Abongisamaki liboso –Bal :8 : 29-30. Kobongisama ya moklisto esalemaki na nzela ya boyebi oyo eyebanaki kino kokokisama ya ngolu monene ya Nzambe oyo ezanga suka. c. Aponami –Baloma 8 :38 ; Bakolos.3 :12 aponámá na Nzambe na eleko oyo mpe akomonisa ngolu na Nzambe na ntango ekoya. d. Aponami -Baef. 1 :4 Nzambe aponaki biso liboso ya kozalisama na mokili ete biso tozala bule, wana toyébáná liboso mpe abongisá lolenge tokozala e. Abengami -1Tes. 6 :24 Nzambe abengi moto mpo asepela na litomba na ntina ya lisiko abongisaki. Mokano wana ekotisi nâ baye Nzambe aponaki mpo na kozwa lisiko, kasi nano babotami mbala ya mibale te. 2. Mondimi asili asikolama –Baloma 3 :24 Nyongo oyo esengekaki mpo na lisiko na masumu na ye efutama. 3. Mondimi azóngísámá na bondeko 2 Bakli. 6 :18,19 ; Baloma 5 :10. Nzambe azongisa ye na bondeko mpe ye azongisama na bondeko ye na Nzambe 4. Moklisto asangani na Nzambe na nzela ya mbóndi (lifuti mpo na kofuta nyongo ya mabe tosala) –Baloma 3 :24-26. Asikolami na ekweli na ntina ya liwa ya Mwana na Nzambe oyo akufi na ekulusu mpo na basumuki.
Made with FlippingBook - Share PDF online