Bunda etumba elamu ya kondima
Minkanda ya kobakisa 159
5. Alimbisami na mabunga nyonso –Baef.1 :7 Masumu na ye nyonso elimbisami –ya kala, ya lelo mpe ya ndéle. 6. Akangami makasi na Klisto mpo na kosambisama ya ezaleli na ye ya kala oyo « ebongwani na oyo ya sika » -Baloma 6 :1-10 asangani ye na Klisto. 7. Moklisto azali na « bonsomi na mobeko. -Baloma 7 :2-6. Asila kokufa na ekweli na ye mpe asikólámá na mitindo na yango. 8. Moklisto akómísámá mwana na Nzambe –Bagal3 :26 –azóngélá nguya ya Molimo Mosanto na boyokani oyo Nzambe moto ya liboso akomi Tata ya solo mpe mobikisami akomi mwana ya solo na makoki mpe ebengeli nyoso –lokola monkitani ya libula ya Nzambe mpe oyo asangani na Yesu Kliso lokola bankitani. 9. Moklisto ayambami lokola mwana oyo akólá mpe adimámá na libota ya Tata –Baloma -8 :15, 23. 10. Moklisto andimámá na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto –Baef. 1 :6. Akomisami sembo (Baloma 3 :22, akomisami mosanto (abulisami) (1Bakol. 1 :30, 6 :11) ; moyengebene mpo na libela na etélemeli na ye (Baebele 10 :14), mpe andimisami na Molingami (Bakolo.1 :12). 11. Mondimi alóngísámá –Baloma 5 :1 asakolama molongi na lotomo na Nzambe. 12. Mondimi « akómísámá sembo ». -Baef. 2 :13. Moklisto akoma pene na Nzambe mpo na makila na Yesu. 13. Mondimi asikolama na nguya ya molili –Bakol. 1 :13 ; 2 :13. Mondimi asikolama na Satana mpe na milimo mabe na ye. Sikoyo molandi na Klisto asengeli kokoba kobunda na banguya wana. 14. Mondimi akotisami na kati ya bokonzi na Nzambe –Bakolo.1 :13. – Moklisto alongolami na bokonzi ya Satana mpe akotisami na bokonzi ya Klisto. 15. Moklisto apikami na libanga, Yesu Klisto -1Bakoli 3 :9-15. Klisto azali moboko oyo moklisto apikami likolo na yango mpe oyo lobiko ya moklisto etongami. 16. Moklisto azali likabo Nzambe apesi na Klisto –Yoane 17 :6,11,12,20. Azali likabo ya bolingo epayi ya Klisto.
Made with FlippingBook - Share PDF online