Bunda etumba elamu ya kondima
160 • Bunda etumba elamu ya kondima
17. Moklisto akátémá ngenga na Klisto. 2 :11. Asikolama na nguya ya masumu ya bomoto na ye ya kala. 18. Moklisto akomisama Nganga ya Bule mpe ya Mokonzi 1Pete. 2 :5, 9. Azali nganga mpo azali na boyokani na Klisto, Nganga ya liboso, mpe akokonza mokili elongo na Klisto. 19. Moklisto azali moko kati na libota eponama, libota na bule mpe bato baponama -1Pete 2 :9 oyo ezali limpinga to lisanga ya bandimi ya eleko oyo. 20. Mboka ya moklisto ezali lola. Bafili.3 : Yango wana abengami mopaya wana azali nano na mokili (1Pete 2 :13), mpe akosepela na mboka na ye mpenza libela na libela. 21. Moklisto azali moko na kati ya libota na Nzambe (Baef. 2 :1,19) azali moko na kati na libota na Nzambe oyo esalema bobele na bandimi ya solo. 22. Moklisto azali na bondeko na basanto Yoane 17 :11, 21-23. Azali na bondeko na bandimi misusu kati na bango, moko mpe mosusu. 23. Moklisto azali na kati ya baye bazali na lisanga na lola –Bakolo. 1 :27 ; 3 :1 ; 2Bakoli.6 :1 ; Bakolo.1 :24 ; Yoane 14 :12-14 ; Baef.5 :25-17 ; Tito 2 :13. Azali na lisanga na Klisto sikoyo azali kobika, epayi wapi atelemi, na mosala, na mpasi, na mabondeli, na kati ya elaka lokola mwasi ya libala na Klisto mpe azali na elikya ya bozongi ya Klisto. 24. Moklisto azali na nzela ya kokoma epayi na Nzambe –Baef.2 :18 ; azali na makoki ya kozwa ngolu na Nzambe oyo esungi ye kokola na molimo mpe azali na eloko epekisi ye kokoma epayi na Tata te – (Baeb. 4 :16). 25. Mondimi azali abatelami « mingi mpenza koleka » na Nzambe – Baloma 5 :8-10, ye azali molingani na Nzambe (Yoane 3 :16), ngolu na Nzambe (Baef. 2 :7-9), nguya ya Nzambe, (Baef.1 ;19), mobateli elaka to mondimi na Nzambe (Bafili.1 :6), kimia na Nzambe (Baloma 5 ;1), Libondisi na Nzambe (2Tim.2 :16-17) mpe mosungi oyo azali kosambela ye epayi na Nzambe (Baloma 6 :26). 26. Moklisto azali monkitani ya libula na Nzambe –Baef..1 :18 Tata apesi ye lokola likabo epayi na Klisto. 27. Moklisto azali monkitani na libula ya Nzambe Ye moko mpe nyonso oyo Nzambe azali kopesa -1Pet.1 :4.
Made with FlippingBook - Share PDF online