Bunda etumba elamu ya kondima

Minkanda ya kobakisa 161

28. Moklisto azali na pole na Nkolo 2Bakoli.4 :6. Azali bobele na pole mpamba te, aséngámi kotambola na pole yango. 29. Moklisto akangami makasi mpenza ye na Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto -1Bates. 1 :1 ; Baef.4 :6 ; Balo. 8 :1 ; Yoane 14 :20 ; Baloma 8 :9 ; 1Bakolinti.2 :12. 30. Moklisto apámbwámá na mbuma ya liboso ya Molimo –Baef.1 :14 ; 8 :23. Abótámá na Molimo (Yoane 3 :6), mpe abatisama na Molimo (1Bakoli. 12 :13), yango ezali mosala ya Molimo Mosanto mpe moklisto na nzela na ye akangámá na nzoto ya Klisto mpe azwi nkonzo ya kozala « na Klisto », yango wana azali kokabola lolenge nyonso Klisto azali. Moyekoli na Klisto afandisi Molimo Mosanto kati na ye (Baloma 8 :9), atiámá elembo na Molimo Mosanto (2Bakoli.1 :22) oyo akobatelaka ye na makama libela na libela, mpe atóndísámá na Molimo (Baef. 5 :18) oyo azali na mosala ya kosikola nguya mpe bokasi na motema oyo afandi na yango. 31. Moklisto azwá nkembo –Balo. 8 :18. Akozala na likabo na lisolo ya bileko nyonso na lolenge ya Nzambe 32. Moklisto atóndá na Bonzambe –Bakolo. 2 :9,10. Ye na Klisto bazali kokabola lolenge ya Klisto. 33. Moklisto azali na mapamboli nyonso ya Molimo –Baef.1 :3. Bolamo mpe nkito nyoso oyo etangami na makambo 32 oyo totangi liboso esengeli ekota na « mapamboli ya Molimo ».

Made with FlippingBook - Share PDF online