Bunda etumba elamu ya kondima

Minkanda ya kobakisa 165

mikolo oyo, Lingomba ya kala etatolaki elaka ya lisiko na Nzambe na kati ya libota mabe ya bapakano. Ntina mpenza ya kondima na biso mpe mosala na biso sik’awa ekólá na eleko oyo mpe ebongi totala yango lisusu malamo. Na kokokisaka, kokomaka, mpe kopanzaka makanisi ya Tjorhom ya Bonkoko Monene, nabongisi na molongo, oyo nalingi ezala lokola ebandeli, ka mwa molongo mpo na kotala mabe to malamu ya esika wapi tokomi oyo ebongi na biso kokeba malamo mpe kozongela yango na motema moko. 1. Bonkoko ya Bantoma. Bonkoko Monene ewuti na Bonkoko ya Bantoma, elingi koloba, litatoli ya bantoma, baye bamonaki makambo nyonso na miso na bango mpenza, mpe bazali bato ya yambo kobika na Yesu ya Nasaleta. Litatoli na bango ezali na mpifo ya batatoli na lobiko mpe misala na ye lokola elobami na Makomi Esanto, Kano (minkanda ya Bibila oyo endimama) ya Biblia na biso lelo. Lingomba ezali kolanda matatoli ya bapostolu, etongami na moboko ya basakoli mpe bapostolu, wana Yesu nde azali Libanga ya suka. Makomi yango mpenza etalisi liziba to epayi wapi ndimbola na biso ya Bokonzi na Nzambe ewuti. Yango nde lisolo ya bolingo ya kosikola biso oyo emonanaki na elaka epesamaki na Abraham mpe bankoko na biso, na kondimana mpe na oyo babikelaki na Isalaeli, mpe ezali suka ya emoniseli na Nzambe na nzela ya Yesu Klisto, lokola esakolamaki liboso na makomi ya basakoli mpe elimbolami na litatoli ya bantoma. 2. Makita ya mangomba nyonso mpe Kondima nyonso-, mingi mpenza oyo ya Nikea. Bonkonko monene esengi solo mpe ndelo ya lisolo ya bai- ortodoxi lokola elimbolami mpe etatolami na kondima ya bai-masangá ya mangomba (Crédo oeucuménique) ya eklezia ya kala mpe eklezia oyo ekabuáná te, na kotiaka miso na kondima ya Nikea. Maloba na bango ekamatamaki lokola ndimbola malamu mpe bisembweli mpo na koteya bato makambo ya Makomi oyo ewuti na bapostolu. Ntango ntina ya kondima yango moko te, kondima ya lisanga ya mangomba mpe kondima (ba credo) etalisi makambo ya siki-siki ya mateya 5 , na koleka oyo ezalaki liboso ya mibu nkama mitano (50e Siecle) (na ntango yango mateya na oyo etali Nzambe, Klisto mpe lobiko ezalaki ! koyekolama mpe kosembolama) 6

5 Nazali na nyongo epayi na nkondo Dr. Robert E. webert mpo na bokeseni malamu asala kati na liziba mpe likambo na motuya ya kondima ya baklisto mpe komanyola

6 Na ntango mankita sambo ya bikela nyonso (mankita misusu mpe ezalaki) endimami na boyokani ya ba-olotodokisi, na ba-katoliko, ezali bongo mankita mineyi ya liboso nde oyo emonani esala mosala monene na kotatola kondima nyonso ya kala endimá ete eklezia ekoki kokabuana te. Ngai mpe basusu tosimbi yango makasi mpo ete mankita ya mangomba nyonso mineyi ya libo so elobi mpe esembola mbala moko mpo na libela oyo ezali ya kotala malamu mpo na kondima na biso ya uta kala likambo ya Nzambe moko na bato misato, mpe akomi moto (Philip Schaff, the greed of Christendom,v.1.grand Rapids : Baker book House,1996, p.44). Nâ babandisi ya lokumu

Made with FlippingBook - Share PDF online