Bunda etumba elamu ya kondima

166 • Bunda etumba elamu ya kondima

3. Mobeko ya kondima ya kala. Bonkonko Monene eyambá likambo ya motuya ya kondima ya liboso ya baklisto. Lokola mobeko yango elingi koloba ete mobeko ya kala to mobeko ya kondima ezaláká lokola epimeli oyo mituna mpe makanisi etali bomanyoli ya kondima ya Biblia esengelaki komekama. Mobeko wana, mbala moko esili etiami malamu mpe na nguya, ekoki komonisa biso polele na koloba soki kotatola kondima ya baklisto kati na lingomba (eklezia ya kala mpo ekoki kokabwana te kolanda lilako oyo ekokani na lisese oyo epésámáká na Vincent Lerins : « ete oyo endimami seko, bipayi nyonso mpe na bato nyonso ». 7 4. Lolenge mokili emoni Klisto Molongi. Bonkoko Monene ezali kosepela mpe kondima Yesu ya Nasaleta lokola Klisto, Masiya oyo apesamaki elaka ya Makomi ya Baebele, Nkolo oyo asekwaki mpe amataki likolo ; mpe motó ya Lingomba. Na Yesu ya Nasaleta kaka, Nzambe ayebisi malamo kozalisama ya Bokonzi na ye na molóngó, na kufa na Ye asílá kolonga liwa, alóngá banguna ya Nzambe na nzela ya kolata nzoto, na liwa, lisekwa, konetwa mpe lisiko ya bato na etumbo oyo babuka mobeko. Sikoyo lokola asekwaki kati na bakufi, anetwaki mpe amataki na loboko ya mobali ya Nzambe, atinda Molimo Mosanto na mokili mpo na kolendisa Lingomba na lobiko mpe na litatoli na yango. Tosengeli kokamata Lingomba lokola bato ya elonga ya Klisto. Na kozonga na Ye, akokokisa mosala na Ye. Lolenge wana mokili emonaki eyebisamaki na kondima ya Lingomba ya kala, na mateya, na losambo mpe na bitatoli. Lelo, na nzela ya losambo mpe na mosala ya Mobu ya Eklezia, Lingomba ya Ngelesa to ba-protestants, bango moko bandimaki mateya ya Bonkoko Monene mpe basimbi litatoli na bango na ndimbola mpe bokonzi. Moko na bango Jean Kelvin akokaki kolendisa, koman yola ya ye moko ya makambo ya Nzambe na maloba oyo : na boye mankita esengeli ezwa bokonzi oyo ekoki na yango kino sikoyo ata mpo na makomi oyo ezali na esika ya likolo, na likambo moko moko mpe na esika na yango. Na boye, biso tondimi mpe totosi na motema moko mankita ya mangomba ya liboso na mankita ya Nikea na ya Konstantinople, ya Efese ya liboso, ya Kalesedo ane mpe misusu ya ndenge moko na oyo totangi, mankita oyo ebandaki koboya mabunga to mbe ba na ndenge ezalaki kotala makambo ya koteya kondima. Mpamba te, mankita wana ezalaki se na kolakisa ya malamu mpe ya uta kala mpenza ya kotala Makomi Esantu, oyo batata basantu ya eklezia bandimaka na bokengi na nzela Molimo mpo na kobebisa banguna ya losambo.(Makambo na Nzambe baye babimaka.) Cfr Jean Calvin, institute of Christian religion,IV,IX, 8, john T. McNeil, ed.Ford Lewis Battles,Trans.Philadelphia : Westminster Press,pp.1171-72. 7 Mobeko wana, bato bakumisaki lisungi malamu oyo ekitaki na se, yango kino bambula ebele lokola emekeli ya teoloji ya kitoko mpo na solo ya baklisto, esali bimekeli misato mpo na koyekola eloko nini ekoki kozala sembo (orthodox) to te na mateya ya Lingomba. St. Vincent ya Lerins, molimboli teoloji oyo akufaki liboso ya mobu 450 sima ya Yesu, abandisaka eloko oyo tobengi « Kano ya Vincent, emekeli ya likambo oyo endimami bipayi nyonso (to catolicité) : quod ubique, quod semper, quod abomnibuscreditum est (eloko endimami bipayi nynoso, ntango nyonso mpe na bato nyonso). Na emekeli wana ya makambo misato ya Ekimenike ya kala kala mpe boyokani, Lingomba akoki koyeba kokesenisa bonkoko ya solo mpe ya lokuta ». (Thomas C.Oden, Classical Pastoral care. Vol. 4. Grand Rapid: BakerBooks, 1987. P243).

Made with FlippingBook - Share PDF online