Bunda etumba elamu ya kondima

Minkanda ya kobakisa 167

eyebi mpe ezali kosepela, komonisa, mpe kosakola elonga ya Klisto : elonga ya masumu na mabe mpe kobongisama ya bikelamo nyonso. 5. Mpifo ya Lingomba. Bonkoko Monene etatolaki na motema mobimba ete Lingomba ezali libota na Nzambe. Lisanga ya bandimi ya sembo, na se ya bokonzi ya Mokengeli ya Bibwele Klisto Yesu oyo azali sikoyo esika bato nyonso batieli ye motema mpe mosali ya Bokonzi na Nzambe na mokili. Na losambo na Ye, na lisanga, na mateya, na mosala, na matatoli, Klisto azali kokoba kobika mpe kotambola. Bonkoko Monene ezali kobeta nsete ete Lingomba oyo ebatelami na bakengeli ya se, ekengelami mobimba na bonganga ya bandimi ezali polele efandelo ya Nzambe na nzela ya Molimo na mokili lelo. Lingomba ezali Tempelo na Nzambe, na Yesu ye moko lokola Libanga ya Liboso, nzoto ya Klisto, mpe Tempelo ya Molimo Mosanto. Bandimi nyonso, baye bakufa na baye bazali kobika na baye babotami nano te –bango nyonso lisanga basali lisanga moko ya bule, ya bipayi nyonso (katoliko),mpe ya bapostolu. Wana ezali bango kosangana ntango nyonso na lisanga oyo ezali kobika, bai- lingomba bazali kokutana na bato na esika na bango mpo na kosambela Nzambe na Liloba mpe na sakramento, mpe kotatola misala malamu na ye mpe kosakola Nsango Malamo. Bakotisi bandimi ya sika na Lingomba na nzela ya libatisi mpe lingomba emonisi ete ezali kobikela Bokonzi ya bondeko na yango mpe emonisi na maloba mpe na misala bosŏló ya Bokonzi na Nzambe wana bazali kobika lisanga mpe kopesa lisungi na mokili. 6. Bomoko ya kondima. Bonkoko Monene endimi polele bokatoliko to bozalisami ya Lingomba ya Klisto bipayi nyonso, yango wana ezali penja likambo ya kobatela lisanga mpe kokoba na losambo na teoloji ya Lingomba na bileko nyonso (Bopalangani ya Eklezia bipayi nyonso). Banda tozwa elikya mpe ekoki kozala bobele yango moko, bobele ebengeli moko mpe kondima bobele moko, Bonkoko Monene ebundaki etumba mpe ewelelaki kozala na bomoko na liloba, na makambo tondima, na losambo, na bolingo. 7. Mokumba ya kobatela Nsango Malamo mpe Klisto mosekwi. Bonkoko Monene endimi ete mokumba ya bapostolu éyébisa na mabota nyonso elonga ya Nzambe na nzela ya Yesu Klisto, esakola lisiko na ngolu na nzela ya kondima na nkombo na Ye mpe kobenga bamboka nyonso ete babongwana mpo na kokota na Bokonzi na Nzambe. Na misala ya Bosembo mpe boyengebene, Eklezia emonisi bomoyi ya Bokonzi na Nzambe na mokili lelo, mpe na mateya na Ye mpe na bomoyi ya lisanga oyo ezali kolakisa litatoli mpe elembo ya Bokonzi na Nzambe na kati ya mokili, mpe mpo na mokili (sacramentum mundi), mpe lokola likonzi mpe esika solo epikami. Lokola elembeteli ya Bokonzi na Nzambe mpe mobateli ya Liloba na Nzambe, Eklezia ezali na mokumba ya kolimbola

Made with FlippingBook - Share PDF online