Bunda etumba elamu ya kondima

168 • Bunda etumba elamu ya kondima

polele mpe kobatela bondimi mbala moko mpo na libela mpo na bato nyonso bantoma bapesa na Lingomba. Bosukisi : Bokuti na mikolo na biso ekoya na kotalaka sima. Na ntango bato mingi bazali na mabunga na mitu na bango mpe kobulungana na makanisi likolo ya yiki-yiki ya baye bazali koloba ete bazali koloba mpo na Nzambe, ntango yango oyo ete tokundola lisusu misisa ya kondima na biso, tozonga na ebandeli ya kondima mpe misala ya baklito ya liboso mpo na komona soki ya solo tokoki kozongela lolenge na biso na losambo ya Klisto mpe kimoklisto oyo ebongola mokili. Na makanisi na ngai, ekokaki kosalema na kozwa Bonkoko Monene ya Nsango Malamo na liso ya bokengi, yango moto ezali bondimi mpe mosala ya ntina oyo ezali liziba ya nyonso tozali kosangola, ezala bai-katoliko, to bai-ortodokisi, to bai-anglikana, to mpe bai-ngelesa (misioni). Ya solo mpenza, bonkoko na bonkoko ekokoba koluka komonisa mpe kobikela lolenge bamipesi na Bonkoko oyo ezali na mpifo (nalingi koloba Makomi) mpe Bonkoko Monene na losambo na bango, na mateya na bango, mpe na mosala na bango. Babonkoko kokesana ya baklisto (ekomami na « b » ya moke), ntango ewuti mpe elimboli liteya ya Likomi polele mpe ekambami na Molimo Mosanto, ekokoba komonisa Nsango Malamo polele na kati ya mimesano ya sika na bamboka to mimesano ya mimesano misusu, na kolobaka mpe na kopesaka elikya ya Klisto na kati ya makambo ya sika bakokutana na yango, Kolanda ndenge ya bango moko ya kobika oyo epetolami na Nsango Malamo. Babonkoko na biso ezali ndenge ya kokokanisa makambo, elingi koloba ezali lolenge ya komonisa polele Bonkoko oyo ezali na Bokonzi na kati ya masanga ya bato na lolenge oyo ekomema bango na kondima epayi na Yesu Klisto. Ata bongo, tosengelaki nde koluka ndenge ya kokolisa babonkoko na biso ya mikolo oyo na kosangisaka mpe kokotisaka kondima mpe misala na biso ya mikolo oyo na kati ya Bonkoko Monene. Tobosana te ete kozala moklisto, na kati na yango, ezali kozala na litatoli malamu na misala Nzambe azali kobikisa bato kati na lisolo. Na bongo, tokozala seko bobele libota oyo ekoluka kozwa bomoyi na biso ya mikolo ekoya na kozongisaka liso sima ntango nyonso na bileko oyo ya emoniseli mpe mosala oyo Mobeko na Nzambe ekómákí polele, wana Nzambe amikomisaki moto, anyokwaki, asekwaki, anetwaki, mpe noki noki Klisto akozonga. Tika ete tokanisa lisusu, tosepela, tosala lisusu, toyekola lisusu, mpe na mposa nyonso tosakola oyo bandimi bandimá mpe batátólá uta ntongo oyo liyita etikalaki polele –lisolo ya lobiko oyo Nzambe apesaki elaka na Yesu ya Nasaleta mpo na kosikola mpe kobikisa libota na Ye mpenza.

Made with FlippingBook - Share PDF online