Bunda etumba elamu ya kondima
Minkanda ya kobakisa 179
M onkanda ya kobakisa 24 K ondima ya nikea (C redo )
Tondimeli Nzambe moko, Ye Tata ya nguya nyonso, mozalisi ya lola mpe mokili mpe na biloko nyonso emonanaka mpe oyo emonanaka te. Tondimeli Nkolo moko Yesu Klisto, Mwana na Nzambe ya likinda, abotamaki na Tata liboso ya bileko nyonso, Nzambe awutá na Nzambe, Pole ewuti na pole, Nzambe ya solo awuti na Nzambe ya solo, abotamá kasi asálámá te, azali lolenge moko na Tata, na nzela na Ye biloko nyonso esálámá. Ye oyo awutaki na likolo mpo na biso bato mpe mpo na bomoyi na biso, alátákí mosuni na nzela ya Molimo Mosanto mpe na elenge mwasi Malia, mpe akomaki moto. Ye lisusu oyo abákámákí na ekulusu na Pontio Pilato, anyokwamaki mpe akundamaki. Mokolo ya misato asekwaki lokola elobi Makomi Esanto, amataki na lola mpe afandi na loboko ya mobali ya Tata. Akozonga lisusu na nkembo mpo na kosambisa baye bazali na bomoyi mpe baye bakúfá, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te. Tondimeli Molimo Mosanto, Nkolo mpe mopesi lobiko, oyo awuti na Tata mpe na Mwana. Ye oyo elongo na Tata mpe na Mwana tosambeli Ye mpe tokumisi Ye. Ye oyo alobaki na basakoli. Tondimeli Eklesia esanto se moko oyo ezali katoliko mpe ya bapostolu. Tondimeli libatisi se moko mpo na bolimbisi ya masumu mpe tozali kozela lisekwa ya bakufi mpe baye bazali na bomoyi mpe na lobiko ya bikeke ekoya. Amen.
Made with FlippingBook - Share PDF online