Bunda etumba elamu ya kondima

180 • Bunda etumba elamu ya kondima

M onkanda ya kobakisa 25 K ondima ya nikea Na lisungi ya Biblia Institut du Ministère Urbaine

Tondimeli Nzambe se moko, (Dutel.6 :4-5 ; Malako 12 :29 ; 1Kolint. 8 :6) Tata na Nguya nyonso, (Buku Eb.17 :1 ; Dan. 4 :35 ; Mat. 6 :9 ; Baef.4 :6 ; Emon.1 :8) Mosali ya lola mpe mokili, Buku Eb.1 :1 ; Yes.40 :28 ; Emon. 10 :6 Mpe biloko nyonso ekomonana mpe oyo ekomonana te. Nzem.14 8 ; Bal11 :36 ; Emon.4 :11 Tondimeli se Nkolo moko Yesu Klisto, Mwana na Nzambe ya Likinda moko, abotamaki na Tata liboso ya bileko nyonso, Nzambe uta Nzambe, Pole uta Pole, Nzambe uta Nzambe ya solo, abotamaki kasi asalemaki te, azali na lolenge moko na Tata, (Yoane 1 :1-3-2 ; 3 :18 ;8 :58 ; 14 :9-10 ; 20 :28 ; Bakolo1 :15,17 ; Baeb.1 :3-6) biloko nyonso esalemaki na Ye. (Yoane 1 :3 ; Bakolos. 1 :16). Ye oyo awutaki lola mpo na biso bato mpe mpo na lobiko na biso, alataki mosuni na nzela ya Molimo Mosanto mpe na elenge mwasi Malia, mpe akomaki moto (Matai 1 :20-23 ; Yoane 1 :14 ; 6 :38 ; Luka 19 :10). Ye oyo lisusu, abákámákí na ekulusu na Pontio Pilato, anyokwamaki mpe akundamaki. (Mat. 27 :1-2 ; Malako 15 :24-39,43-47 ; Mis.13 :29 ; Baloma 5 :8 ; Baeb. 2 :10 ; 13 :12). Mokolo ya misato asekwaki lokola elobi Makomi, (Malako 16 :5-7 ; Luka 24 :6-8 ; Mis.1 :3 ; Baloma 6 :9 ; 10 :9 ; 2Tim.2 :8). Amataki na lola, mpe afandi na loboko mobali ya Tata, . (Malako 16 :19 ; Baef. 1 :19-20). Akoya lisusu na nkembo mpo na kosambisa baye bazali kobika na baye bakufa, mpe Bokonzi na ye ezali na suka te. (Yesaya 9 :7 ; Mat.24 :30 ; Yoane 5 :22 ; Misala 1 :11 ; 17 :31 ; Baloma 14 :9, Bakoli.5 :10 ; 2Tim.4 :1). Tondimeli Molimo Mosanto, Nkolo mpe mopesi na bomoyi, (Buku Eb. 1 :1-2 ; Yobo 33 :4 ; Nzembo 104 :30 ; 139 :7-8 ; Luka 4 :18-9 ; Yoane 3 :5-6 ; Misala 1 :-2 ; 1Bakli.2 :11 ; Emon.3 :22) Ye oyo alobaki na basakoli (Ntango.11.29 ; Mika.3.8 ; Misala.2.17-18 ; Petelo 2 :1.21) Tondimeli Ekelesa se moko oyo ezali mosantu, ya Molimo, katoliko mpe ya baposto. (Matt :16.18 ; Baefeso.5 :25-28 ; 1 Bakolinto. 1 :2 ; 10 :17 ; 1Tim 3 :15 ; Emoniseli7 :9) Tondimi batisimo moko mpo na bolimbisi ya masumu. (Misala 22 :16 ; 1 Petelo 3 :21 ; Baefeso 4 :4-5) mpe tozali kozela lisekwa mpo na baye bakufa mpe bomoyi na ntango ekoya (Yisaya 11 :6-10 ; Mika 4 :1-7 ; Luka 18 :29-30 ; Emoniseli 21 :1-5 ; 5 : 21-22) Amen Ye oyo awutaki na Tata mpe na Mwana, (Yoane 14 :16-18,26 ; 15 :26 ; 20 :22). Ye oyo elongo na Tata mpe na Mwana azali na nkembo mpe akumisami (Yisaya.6.3 ; Matayo. 28.19 ; 2Bakolinte.13.14 ; Emoniseli.4.9)

Made with FlippingBook - Share PDF online