Bunda etumba elamu ya kondima
Minkanda ya kobakisa 181
Kondima Ya Nikea Na Lisungi Ya Makomi Ya Biblia- Makomi ya Koyekola Na Motu.
Oyo ezali milongo ya Biblia topesi mpo na kokanga na motu, moko na moko na eteni ya kondima. Tata Emoniseli 4 :11 ; (Lingala haut fleuve). Nkolo mpe Nzambe na biso obongi na kozwa nkembo na lokumu, na nguya, mpo Yo ozalisaki biloko nyonso ; mpe mpo na mokano na Yo ezali mpe esili kozalisama. Mwana Yoani 1 :1(Lingala haut fleuve) Na ebandeli liloba Azalaki, mpe liloba Azalaki na mboka na nzambe, liloba Azalaki mpe nzambe. Etinda ya Mwana 1Bakolinto 15 : 3-5 (Lingala haut fleuve) Zambi na liboso napesaki bino yango ezwaki ngai ete klisto akufi mpo na masumu na biso mpela moko elobaki makomi, mpe ete akundami, asekwi na mokolo na misato, mpela moko elobaki makomi, mpe amonani na Petelo, mpe na sima na Bazomi na mibale. Molimo Mosantu Baloma 8 :11(Lingala haut fleuve). Soki Molimo na Ye oyo asekwisaki Yesu longwa na bakufi Azali kofanda kati na bino, Ye oyo asekwisaki Yesu longwa na bakufi akopesa bomoyi epayi na nzoto na bino na kufa, na nzela ya Molimo oyo akofanda kati na bino. Eklezia 1 Petelo 2 :9 (Lingala haut fleuve) Nde bino bozali libota eponami, banganga na bokonzi, libota ya bule, bato baponami, ete bosikola malamu na oyo abengi bino kondima na molili kokota na moyi ya kokamwisa. Elikya 1 Batesalonike 4 :16-17 (Lingala haut fleuve) Mpo ete Nkolo ye moko akokita longwa na likolo na kongánga makasi mpe na mongongo yaya kopesa mitindo, na mongongo ya mokonzi ya banje mpe na kobeta na mondule na kelelo na Nzambe. Mpe bakufi kati na Klisto bakosekwa liboso. Na sima biso bato ya bomoyi oyo totikali tokonetwa kati na mapata mpo na kozwana na Nkolo kati na mopepe esika moko na bango. Mpe tokozala bongo esika mŏkó na Nkolo.
Made with FlippingBook - Share PDF online