Bunda etumba elamu ya kondima

20 • Bunda etumba elamu ya kondima

Eleko oyo tozali na kati na yango Liteya ya yambo : Boyekoli Biblia Botanga makomi oyo mpe boyanola yango na bokuse mpe na kolandisaka yango na mateya ya Biblia. 1. Nkolo Nzambe kaka nde azali Nzambe bobele ye moko, mpe azali mozalisi ya mokili. Tanga Ebandeli 1.1,-3.15. a. Ntina to mosala ya Nzambe na lisolo oyo ezali nini ?

b. Ntina to mosala ya Adama na Ewa na lisolo oyo ezali nini ?

c. Eloko nini nyoka asali na lisolo oyo ?

2. Bato nyonso ya mokili bakelama mpe bazali kobika na mokano ya Nzambe. Tanga Misala ya bantoma 17.24-31.Tangela biso biloko misato ntoma Paulo alimbolaki mpo na lisolo ya Nzambe ngonga alobaki na Bai-Athenia. 3. Nzambe alobaki na bato nyonso na nzela ya bikelamo na ye, na nzela ya basakoli ya Yisalaela mpe na mikolo ya suka na nzela ya Yasu Klisto. Tanga Baebele 1.1-4 a. Lolenge nini mokomi alimboli ndenge Nzambe alobaka na bato ?

b. Ntina nini mokomi ya Baebele apesi na Nzambe oyo alobaka na biso na nzela na Yesu ?

4. Nzambe akotaki na lisolo na kokómáká moto mpe na kobíkáká na mabele ! Tanga Yoani 1.1-14 a. “Liloba” nde azali nani mpe akokani na Nzambe na makambo nini ?

b. Boyokani nini ezali kati na Liloba na bikelamo ?

c. Mpo na baye bandimelaka liloba, bazuaka nini, mpe «babotami» ndenge nini ?

Made with FlippingBook - Share PDF online