Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya yambo (1) Lisapo oyo tobikaka na kosangisa lisolo na biso na lisolo oyo ya Nzambe • 21

5. Lisolo ya bolingo na Nzambe oyo epesami na nzela na Yesu eyebisami na mabota nyonso, bipayi nyonso. Tanga Matayo 28 :18-20 Etinda nini Yesu apesi na bayekoli na ye ?

6. Nsango Malamo ezali nsango ya kitoko ya libiki oyo elobi na mokuse eleko tozali kobika. Tanga 1 Bakolinto 15.1-8 Eloko ya motuya nini Paulo alobi ? a. « Ngolu » ezali nini ? Mpo na nini Nsango malamo ezali ntango nyonso koloba na ntina na « ngolu » ?

b. Nsango malamo ezali nsango oyo eyebisi makambo Nzambe asali na nzela ya Yesu Klisto.

c. Ntango Yesu asilisaki mosala na ye, amimonisaki na nani ?

7. Yesu ya Nasaleta azali *mobímbí (ntina) ya lisolo ya Nzambe, bomoyi, liwa, mpe lisekwa na ye. Tanga Malako 1. 1-13. Tango Yesu abatisamaki, lakisa na kosalela toloto lolenge nini Nzambe amimonisaki lokola Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto. a. Tata ___ Lolenge ya embenga b. Mwana ___ Mongongo ewuti na likolo c. Molimo Mosanto ___ Yesu ya Nasaleta 8. Lisolo Nzambe azali koloba na nzela ya Yesu ezali lisolo ya bozongisi bolamo, ya kobikisa, mpe ya kopambola bato bazali na bolozi mpe (mawa), mpe bato bazali na bobola. Tanga Yesaya 61 : 1-4. Tanga maloba mitano elobamaki na Yesaya ete Yesu akosala na ntango wana Yesu abotami nano te.

Made with FlippingBook - Share PDF online