Bunda etumba elamu ya kondima
22 • Bunda etumba elamu ya kondima
Kombo na ngai Nee. Ezali kombo ya ba-chinois mingi. Nazwaki yango ndenge nini ? Naponaki yango te. Nalukáká yango na mikanda mpo na kopona yango te. Nkombo na ngai ezali Nee mpo na makasi na ngai to lolenge na ngai te. Wana etali ngai ata moke te. Lisusu, nakoki kosala eloko te mpo na kobongola yango. Kombo na ngai ezali Nee mpo tata na ngai azalaka Nee, mpe tata na ngai azalaka Nee mpo nkoko na ngai azalaka Nee. Soki nasali makambo lokola Nee ezali mpo nazali Nee, soko nasali kokesana na Nee natikali bobele Nee. Soki nakomi mokonzi ya ekolo chine, nazali bobele Nee, to soki nakomi molombi na babala bala, nakotikala bobele Nee. Eloko moko te na oyo nasalaka to namipekisaka kosala ekokomisa ngai moto mosusu. Tozali basumuki mpo na biso moko tolingaki yango te, kasi ezali nde likolo ya Adama. Ezali te mpo ngai moko nalingaki nasumuka nde nazali mosumuki, kasi ezali nde mpo nazalaki na kati ya Adama oyo asumukaki. Lokola uta kobotama na ngai nawutaki na Adama, yango wana nazali elembo na ye. Lisusu nakoki kosala eloko moko te nsima na yango. Ata nabongisi ezaleli na ngai, nakoki komikomisa moto mosusu libanda na ye te, elingi koloba mosumuki. Na kolandisama na oyo Biblia elobi, Nkolo Nzambe ya Bibele azali se Nzambe moko ya solo, oyo amimonisaki ye moko ete bato bayeba ye Nzambe moko na kati ya bato misato : Tata, Mwana mpe Molimo Mosanto. Nzambe ayebisi biso lisapo monene (na lifalanse, épopé) oyo eyebisi biso bolingo na Ye mpe mokano na Ye ya kobikisa bikelamo na Ye na boloko. Nzambe azali mokeli ya molóngó, oyo asalaki biloko nyonso uta epai wapi eloko ezalaki te (ex nihilo), mpe akanaki ete abimisa libota epai wapi mobateli mpe mobikisi akokaki kowuta. Ata ko na ebandeli asalaki libota na ye oyo ezangaki masumu mpe na sima libota yango batombokelaki ye, bakweyaki mpe bakabwanaki na *ngolu na ye, mpe bamemelaki libota mobimba ya bato bilakeli mabe oyo esuki na liwa, Nzambe apesaki elaka ya kotinda mobikisi oyo akofuta nyongo ya masumu na biso, mpe kolongola biso na etumbu ya masumu na biso, mpe kopesa biso bomoyi ya seko na nzela ya kondima. Yesu ya Nasaleta azali mobikisi oyo akufaki mpo na kosikola biso. Sikoyo na nzela ya kondima tokoki kobikisama na etumbu Watchman Nee. La vie Chrétienne normale Fort Washington, PA : Christian Littérature Croisade, 1974, p. 26.
Na mokuse
*Kokabwana na ngolu – Wana Adama na Ewa bakutanaki na Satana na kotomboka na bango, masumu na bango nde ekaboli bango na bondeko na Nzambe ya boyengebene ; misala na ban go nde eyokisi bango nsoni liboso na Nzambe mpe ekotisaki kufa na mokili.
Made with FlippingBook - Share PDF online