Bunda etumba elamu ya kondima

28 • Bunda etumba elamu ya kondima

naloba solo na yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayoki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, ete nayamba liloba na yo mpe lilako na yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. « Mpo na nini Zabulu ayini biso, tosali ye nde eloko nini ? » Na lisanga moke ya bandimi ya sika bazali koyekola Biblia, mwa ndambo ya baklisto bazali nano bana mike na kondima, bazalaki kokoba lisolo ya Liloba na Nzambe bango na molakisi na bango. Ntango bazali na liteya, bamoni ete zabulu akosaki mwasi na mobali ya liboso Adama na Ewa na lokuta mpe na kozanga bosembo na ye, atindaki bango basala lisumu. Moko na bayekoli atuni molakisi alobi : « Nazali kososola te, mpo na nini zabulu azalaki mayele mabe kino akosa mwasi na mobali ya liboso mpe kino epesa yiki-yiki na makambo nyonso? Basalaki ye nini ? Mpo na nini azali koyina bato makasi ? » Soki totali mateya toyebi sika oyo na Biblia mpe lisolo ya bomoyi na biso mpo na nini okanisi ete Makomi eyebisi été zabulu azali kofunda, kokosa, mpe konyokola bato mingi. Mpo na na nini abanda kosala yango uta ebandeli ya mokili ? 2. « Ya solo nandimi, kasi nakanisi te ete nalengeli nakoba kokota na nyonso wana - nano penza te ». Ntango Marsha *azalaki kokabola Nsango malamo oyo Nzambe apesi lobiko na seko epayi ya Ralfa, mwana mobali ya ndeko na ye, akotaki na eloko moko ye moko ayebi nini akosala na yango. Ayebisaki Ralfa ete likabo ya Nzambe ezali kitoko penza, kutu ebendaka bato, esengi bobele obongwana epayi na Nzambe na nzela ya kobongola motema. Ralfa amipesaki na masano ya internet, oyo misusu ezalaki ya bililingi ya mwindo mpe akabolaki bitumba ya demona ye na bazalani na ye). Ntango Ralfa, na nsima ya koyoka litatoli ya Marsha na ntina ya lisapo ya bomoyi, alobi : « Namoni ndenge Nzambe alingi biso penza lokola atíndélá biso Yesu, wana nde likambo ezali kokamwisa ngai. Kasi na solo penza nakoki komipesa sikoyo nano na ye te, na koleka nakoki kotika makambo oyo nasalaka te. Ezali pasi. Yango ekoki te nandimela obele Yesu mpe likambo ésíla ? Mpo na nini nasengeli « nayambola masumu lokola olobi » ? Nandimi te ete namilengeli mpo na komipesa, na moke te. Yango nzela mosusu ya kokima makambo lokola koyambola masumu ezali te ? Eyano nini Marsha akokaki kopesa na Ralfa na motuna ya lolenge wana ? » Yo, osengeli koyambola masumu mpo obika to te ? Limbola. 3. « Awa bokomi bayekoli na Klisto, sikoyo atie bino miso ». Ntango bato mingi bazali koloba ntina ya kondima ya baklisto ete ezali bobele bolingo mpe ngolu ya Nzambe, bato moke na kati na bango bamonani

Bokutani

Made with FlippingBook - Share PDF online