Bunda etumba elamu ya kondima
32 • Bunda etumba elamu ya kondima
a. Banguna ya Yesu bafundaki ye na likambo nini, ntango awutaki kobimisa milimo mabe na baba ?
b. Na eyano ya Yesu, alobaki nini na ntina ya bokonzi oyo ekabwani na biteni to komibundisa ?
c. Eloko nini Yesu alobaki ete ekokaki kobima soki abimisaki milimo mabe na « mosapi ya Nzambe ? » (elingi koloba na Molimo Mosanto ya Nzambe ?)
d. Ndenge nini Yesu alimbolaki nguya mpo na kolonga « moto ya makasi » (zabulu) na lisese wana ?
e. Lisese ya Yesu na Luka 11 ekoki kolimbolama polele na 1Yoani 3 :8. Mpo na nini Yesu amonanaki na mokili ?
4. Yesu ya Nasaleta azwaki bokonzi oyo eleki nyonso uta na Tata mpo na kokata makambo mpe mpo na kobikisa. Tanga Yoani 5 :19-27 a. Na lolenge nini Yesu alimbolaki misala asalaki soki tokokisi yango na misala ya Tata na ye ?
b. Soki bazangi kokumisa Klisto, boyokani na bango na Tata ekozala ndenge nini ?
c. Eloko nini Yesu alobaki mpo na bato oyo bayokaka liloba na ye mpe bandimelaka ye motindi na bango ? i. A ___________________ bomoyi ii. Ako __________________________________________ te iii. Awuti na __________________________ mpe aleki na bomoyi
5. Moto moko te azali sembo likolo ya misala na ye ya kitoko. Biso nyonso tosalami sembo liboso na Nzambe obele na nzela ya kondimela Yesu Klisto ye moko. Baloma 3 :9-28.
Made with FlippingBook - Share PDF online