Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mibale (2) Makomami oyo tosalaka • 31
d. Ndenge nini tozali kokoma bana na Nzambe ? (Poná eyano eleki malamo) i. Kobotama na makila to na bonkoko lokola bato nyonso ii. Kobotama na mposa to mokano ya bato iii. Kobotama na Nzambe 2. Kobikisama na masumu mpe na kufa epesameli biso na ngolu ya Nzambe, na nzela ya kondima. Tanga Baefeso 2 :1-10 a. Ndenge nini * Ntoma azali komonisa lolenge bato bazali kati na bango na zabulu (« mokonzi ya nguya oyo azali na likolo ») liboso bato babongwana mpe bandimela Klisto ? b. Tanga makambo misato ya solo ezalaki na yo liboso ya kobikisama na bolimbisi na Nzambe. i. ii. iii. c. Tobikisami ndenge nini ? (Pona eyano malamo): i. Na ngolu na nzela ya kondima (lokola likabo ya Nzambe) ii. Na misala malamo (boye okoki komikumisa) d. Mpo na nini tobikisamaki –Nzambe alingi tozala ndenge nini mpe tosala nini awa tobikisami ?
3. Moto moko oyo alongaki zabulu mpo na kosikola mpe kobongisa bikelamo mpe bato, ezali bobele Yesu. Tanga Luka 11 :14-23
* Ntoma—Ntoma elingi koloba « motindami. » Liloba wana elobami na ndenge mibale na Biblia. Mingi-mingi elobami mpo na bato Yesu atindaki kopanza mosala na ye, mpe lisusu ba zomi na mibale baye batambolaki na ye na mosala awa na mokili, mpe na moto lokola Paulo oyo azwaki ya ye eteni na mosala ya ye moko, na Misala ya Bantoma 9. Lisolo ya bantoma loko la batatoli ezali na motuya mingi epayi na biso mpo litatoli na yango ezali kopesa lolenge ya likambo nyonso toyebi mpo na Klisto. (Tala 1Yoani 1 :1-4 mpe 2Petelo 1 :16-18). Yango wana lokola Kondima ya Nikea elobi ete kondima na biso ezali lokola « ya bantoma », tozwi likanisi ya kolimbola Bilblia mpe lisolo ya bato bobele na lolenge bantoma balobaki. Lolenge mosusu ya Ntoma (ndakisa na Baefeso 4 :11) ezali kopesa likanisi na baye bapesamaki likabo ya Molimo mpe batindamaki na lotomo songolo to na mosala songolo. Lelo tobengi bango bamissioneri, elingi koloba bato batindami mpo na kosala likambo songolo lokola kotelemisa mangomba epayi songolo.
Made with FlippingBook - Share PDF online