Bunda etumba elamu ya kondima
30 • Bunda etumba elamu ya kondima
Molimo Mosanto azali lifuti ya likabo na Nzambe ya kokoka, oyo ekoyela biso ntango Yesu akozonga ; Molimo azali lokola ndanga ya libula na biso oyo ekoya na nzela ya Klisto. Kobongola motema na masumu mpe komikokanisa na Klisto na nzela ya bondimi ezali koboya botosi ya bokonzi ya Satana mpe kotosa bokonzi ya Nzambe. Soki bosali bongo, wana bosangani na baye bandimeli Nzambe mpe basungami kolongwa na nkanda na Nzambe oyo ekoya. Kobatisama* na mayi oyo esengami na Yesu mpo na bandimi nyonso, ezali elembo oyo emonani libanda na mosala oyo ya kati esalami na ngolu ya Molimo Mosanto mpo na kosangisa biso na Klisto oyo azali Nkolo mpe Mobateli mpe mpo na kotatola polele kokangama mpe komipesa na biso lokola balandi ya Nkolo oyo asekwaki.
Kondima Yesu lokola mobikisi mpe Nkolo ezali kokota na mampinga ya babundi na ye. Oyeba yango to te, okomisami na buku ya babundi.
~ John White. The Fight /le combat Downers Grove, IL : Inter Varsity Press, 1976, p. 217
Makomami oyo tosalaka Liteya ya mibale. Boyekoli Biblia
Botanga makomi oyo mpe boyanola mituna ekokani na mateya ya Biblia. 1. Liloba ekomi mosuni, mpe epesi lobiko ya seko epayi ya bandimi. Tanga Yoani 1 :10-14 a. Na makanisi ya Yoani, nani azalaki Liloba mpe Ye na Nzambe bazali ndenge nini (bakokani to bakesani na nini ?)
b. Liloba wana ekokani to ekesani na Yoani Mobatisi na nini ?
c. Ndenge nini Nzambe apesi makoki ya kozala bana na ye ?
* Kobatisama na mayi etindami na Yesu epayi na baklisto nyonso, ezali elembo emonani libanda ya mosala oyo ezali na kati ya ngolu oyo esalami na kati na biso na Molimo Mosanto oyo azali kosangisa biso na klisto Nkolo mpe mokengeli, mpe mpo na kotatola na miso ya bato nyonso ete tokangami na kotosa mobeko mpe komipesa epayi na Nkolo oyo asekwaki lokola elembo na ye.
Made with FlippingBook - Share PDF online