Bunda etumba elamu ya kondima

34 • Bunda etumba elamu ya kondima

iii. Nzambe atindaki mwana na ye mpo ________________________ mokili te kasi mpo mokili __________________ .

7. Ata ko tozalaka bilema mpe bato bazangi botosi, sikoyo tokómá bana penza ya Nzambe na ngolu ya Nzambe mpe na nzela ya Yesu. Tanga Tito 3 :1-8 a. Tosengeli tosala nini, biso bandimi ya sika ya Klisto, mpo na koyokana na : i. Bakambi mpe bakonzi. ii. Bato nyonso. b. Loba lolenge tozalaki liboso ya tobongwana mpe tondimela Klisto. c. Eloko nini ezali kokomela biso ntango « bolamo mpe bolingo ya Nzambe » emonani epayi na biso ? d. Sikoyo tokoki kobika lolenge nini awa tobikisami na ngolu na Nzambe ? 8. Ntango tosili kondima, Molimo Mosanto afandi na nzoto na biso mpe atie elembo ete tozali baye ya Nkolo penza – mpe mpo na etumba tozali kobunda ! a. Tanga Baefeso 1 :13-14. Tondisa bisika wana : i. Ntango ondimelaki ye, otiamaki elembo ya _________________________. ii. Molimo Mosanto azali ndanga _____________________________ na biso kino tozwi libula na yango. b. Tanga Baloma 8 :12-17. Yanola mituna oyo, solo to lokuta. i. Awa Molimo Mosanto afandi kati na biso, tosengeli lisusu komipesa na masumu te. ii. Tosili kozwama lokola bana ya ndako na nzela ya misala ya Molimo na kati na libota ya Nzambe. iii. Tozali basangoli ya libula (bozwi) ya Nzambe lisanga na Klisto, soki tomoni pasi na ye elongo.

Made with FlippingBook - Share PDF online