Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mibale (2) Makomami oyo tosalaka • 35
9. Nzambe abengaki bantoma mpo na kotatola na mokili ete Klisto alonga zabulu mpe masumu. Tanga Misala ya bantoma 26 :12-18 Tondisa bisika ya polele. Ntango Paulo azwaki emoniseli ya Yesu, eloko nini Yesu aponaki ye asala ? a. Zala mosali mpe __________________ biloko okomona (v.16) b. Fungola bato miso ete ba ___________________ na polele, uta nguya ya _______________ epayi na Nzambe, bazwa __________ ya masumu mpe tia bango _________________________ (v.18) Moto nyonso oyo atiki masumu mpe azongeli Nzambe (abongwani) mpe andimeli Yesu Klisto lokola Nkolo oyo asekwaki (andimi) asili kobikisama, alimbisami, akomi moto ya kokoka, andimami na libota ya Nkolo, na ngolu na ye, na boboto na Ye mpe bolingo na Ye. Kobengama wana mpo na kokoma mwana penza ya Nzambe elimboli kobongwana uta botosi ya mokili oyo na masumu na yango mpo ozonnga epayi ya Klisto mpe Bokonzi na Ye. Kondima elingi koloba kozonga epayi ya Nzambe ntango otiki masumu ya mokili oyo ; ezali kolapa été ozala na botosi ya Nkolo mosusu, na bokonzi mosusu, mpe lobiko ya sika. Yesu ayaki mpo na kobebisa misala ya zabulu, kozongisa bondeko kati na bato na Nzambe, kala mingi te, mpo na kozongisa makambo nyonso ya mokili mobimba na kati ya Bokonzi na Nzambe. Nzambe azali kobikisa biso na ngolu na ye, kasi mpo na botosi na biso ya mibeko te, to mpe na kokoka na biso te, to na misala malamu na biso te. Tozongisami lisusu na boyokani malamo kati na biso na Nzambe bobele na mawa na ye, likolo ya liwa oyo Yesu akufaki na esika na biso (« liwa na esika na biso »). Lokola tobikisami sikoyo, tokomísámí na buku ya babundi ya etumba na masumu, na mabe mpe na bokonzi ya molili. Ya solo tobengami mpo kobikisama ezali mbela mpo na kokota na mampinga ya bolingo ya Nkolo mpe kobunda biso na mokili, elingi koloba kobunda na biso na ezaleli na biso ya kala ya masumu, ya zabulu. Ntango tosili kondima, Nzambe atie mosapi (andimi boyokani) ete Molimo Mosanto afanda kati na biso, apesa biso nguya, amonisa biso nzela mpe apesa nguya ya kokumisa Nzambe mpe kosalela Klisto. Molimo Mosanto azali lifuti mobimba oyo Nzambe apesi, lifuti ekoyela biso ntango Yesu akozonga. Molimo azali ndanga ya libula na biso ya ntango ekoya na nzela ya Klisto. Bolamu na biso ya mawa oyo Nzambe ayokeli biso ezali ya solo nzela ya Molimo Mosanto : Kolimbisama na masumu, lisungi ya kobatela biso epayi ya Satana mpe bokonzi ya molili, nguya ya kotosa mokano na Nzambe ntango tozali nano kobika lokola baklisto.
Na mokuse
Made with FlippingBook - Share PDF online