Bunda etumba elamu ya kondima
36 • Bunda etumba elamu ya kondima
Tozali kosala lisanga na Molimo Mosanto wana tozali kondima solo na liloba na Nzambe, mpe tolongoli koyima-yima na biso na matatoli mabe oyo ebebisaka, mpe lisusu matatoli ya lokuta ete ekoma matatoli ya sembo ekokani na liloba na Nzambe. Awa tozali bikelamu ya sika na nzela ya Klisto tosengeli kondima solo nyonso bakomi ya Biblia mpe oyo bazali koloba na makomi na ntina na biso penza, na ntina ya lobiko na biso ya kala. Eloko eleki motuya ezali nguya mpe lobiko na biso ekoya. Tozali lisusu na botosi ya bokonzi ya molili ata moke penza te ; tosili kokomisama na bokonzi ya Mwana na Nzambe, bokonzi ya pole. Ebongi ete basikolami na Nkolo bábanda koloba bongo. (Nje 107 :1-3) Boyekola mpe bobanza-banza na ntina ya makambo oyo tobakisi mpe mateya ebongi mpe eyebani ntina na yango : Yesu ya Nasaleta : komonana ya ntango ezali koya. (Mok. Ya kob.4) Lisolo ya Nzambe : misisa na biso ya bule (Mok. Ya Kob. 5) Liboso ya ebandali ya ntango mpe nsima : Mwango ya Nzambe mpe lisolo etali moto (Mok. Ya Kob. 6) Elili mpe bozalisami (Mok. Ya Kob. 7) Tanga mpe tia makanisi na makambo oyo ekomelaka biso mpe yanola na komonisaka bososoli malamo na yango ; wana ozali koyanola zongisa makanisi na makomi oyekolaki liboso awa. 1. « Sikoyo namimoni penza tê ete nazali molongi » Bato mosusu baye bazali nano baklisto ya sika, babandi mobembo na bango na kozalaka baklisto ya esengo mpe batieli yango solo motema ; nzoka nde bakokutana mpe noki-noki na kokoso to mikakatano kino bamimoni penza na etumba na bango na masumu mpe na nsoni. Babandaki na makasi nyonso, nde na sima bamimoni lisusu ete esali bango mpasi mpe elembisi bango awa basosoli ete bomoyi ya baklisto ezali lisusu « pete ndenge bateyi bateyaki mpe bamanyolaki lokola bakanisaki te ». Lisusu, bamimoni na komekama ya ndenge na ndenge : lelo basiliki ; lobi bakobi na lisumu songolo…Lokola bomesano, bazongeli bobele mpasi ya mposa ya mokili : komisepelisa, lokoso, lolendo, mpe bongo na bongo, kino bamituni : « Wapi elonga Biblia eyebisi biso ? Mpo na nini nakoki kolelela Nzambe te ete abongola ezaleli na ngai sikoyo ? Soki Nzambe azali ya solo kobatela ngai, mpo na nini nazali ntango nyonso na bitumba mpe na mpasi ? » Sikoyo, okoki koloba nini na moto oyo akutani na kokoso ya motindo wana na mobembo na ye na Klisto, moto Epayi ya baye nyonso bayamba ye, apesa bango makoki ya kokoma bana na Nzambe (Yoan.1 :12)
Minkanda ya kobakisa
Mobeko ya ntina
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Made with FlippingBook - Share PDF online