Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mibale (2) Makomami oyo tosalaka • 37
oyo amimoni penza te ete azali molongi na etumba na ye na bampasi ya lolenge wana mokolo na mokolo ? 2. « Ndenge nini nakoki koyeba ete nalimbisami penza ya solo ? » Moklisto nyonso oyo akoli nano te akokutana bobele na ntembe ya soki asili kobikisama to te. Ata ko apesi bomoyi na ye epayi na Nkolo, ekozanga te akoma na ntango akokanisa mpe akomilobela kino asala makambo oyo akoki kolonga te mpe ezali libanda ya bomoto na ye ya sika na kati ya Klisto. Ntango mosusu biloko ya motindo wana, oyo elembisaka bato, ekopesa ye kokoso na etambweli na ye na lobiko ya sika kati na Nkolo. Awa atondi na ntembe mpe na kobanga akoki kozwa likanisi to komekama ya kosenga-senga lobiko epayi na Nkolo. Moklisto ya motindo wana azangi te obele kotia motema ete kotatola na ye ya bondimi epayi ya Klisto endimami te, kasi azali lisusu komituna soki azwa penza mokano ya solo na makanisi na ye moko. Ndenge nini koyekola na yo ya mateya oyo ekoki kosunga bato ya mposa oyo epesaka ntembe na lolenge wana ? Lolenge nini okoki kosunga moklisto na kozwaka elikya mpe kotia motema ete abikisama (1Yoani 5 :11-13) ? 3. « Likambo ya kokamwa. Awa nabikisami na ngolu, nakoki kosala lokola motema na ngai elingi mpo nazali na bonsomi ! » Mbala moko boye, mondimi moko ya sika akutanaki na likambo oyo elobami na Biblia na ntina na ngolu, sembo na Klisto mpe bomoyi ya seko. Na esika ya komikitisa mpe kokanisa bolamo basaleli ye, abandi kobongola makomi mpe kozwa to kopesa ndimbola mosusu ya kobikisama na Nkolo oyo etindi ye kino abungisa kokanisa bolamu likolo ya lolendo. Mbala moko abandaki kokabola liloba na baninga mpe alobi : « Mpo Nzambe alingi biso mpe abikisi biso na ngolu na ye, tokoki lisusu komitungisa na makambo oyo tozali kosala na bomoyi na biso te. Akolimbisa mpe akoyamba biso na likambo nyonso tokosala na ntina ya bolamu tosali te kasi na ntina ya oyo asali mpo na biso ! » Lolenge nini ndeko na biso azangi kososola ndenge tokokaki kobikela ngolu ya Nzambe, lokola tobikisami sikoyo na Klisto ? Bososoli mpenza ya lolenge tosengelaki tobikela nini ? Moko na biloko mpenza ya liboso mpe ya ntina mingi oyo bandimi bakoki mpe bazali na lotomo ya kosala uta ebandeli ya mobembo na bango na lisese ya Nzambe ezali « basengeli kososola ete bazali ntango nyonso babundi na etumba monene na mokili. Na bosembo mpenza ntango tondimelaki Klisto ezalaki na mindondo te » (nakanisi mpenza te )! Eloko nyonso ekoki komonana ndenge ezalaki. Kasi makambo nyonso ebongwáná. Tosungámá na likama ya bokonzi ya molili, tolímbísámá na mabe nyonso tosala. Toyambámá lokola bana na libota ya Nzambe, tokomami na buku ya babundi na mampinga ya babundi ya Nzambe mpo na kokota na bokonzi na Ye ! Tozali bikelamo ya sika na nzela ya Klisto,
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online