Bunda etumba elamu ya kondima

38 • Bunda etumba elamu ya kondima

ezaleli ya kala esili kolongwa mpe oyo ya sika nde ezali na biso (2 bakolinto 5 :17). Zwaka mokano sik’awa ya kozala na likanisi ya etumba, ya kotalela Molimo Mosanto mpo apesa nguya, mpo asambela epayi na Nkolo ete ozwa lisungi ya mokolo na mokolo ntango tozali kotambola na kati ya Klisto, mpe makanisi na yo, motema na yo mpe molimo epikama mpenza awa tozali kobunda. Nzambe apesa ndanga ya kolongisa biso na etumba (1 bakolinto 15 : 57), mpo oyo azali na kati na bino aleki oyo azali na mokili na monene. (1Yoane 4 :4). Sikoyo bino bozali baye ya Nzambe, bozali na lolenge ya bomoyi na bino ya kala te oyo ezangaki kobatelama na makama, lokuta, bozali bana ya Nzambe ya sika na nzela ya Klisto mpe bosengeli kokana kobanda kosala, koloba mpe kokanisa lokola bato ya sika. Bokanga motema na bino mpenza ; soki bolingi koyika mpiko mpe kozwa ngonga ya koyekola ezaleli ya sika oyo Nzambe alingi, mpe kokoma bato ya sika na lolenge Ye alingi bokoma. Senga lisungi epayi ya Nzambe asunga yo ete ozala na lolenge ya kobika ya sika, ezaleli ya sika ya yo mpenza oyo ewuti na Nzambe, oyo olongwa na bowumbu na bilulela ya kala ; Nzambe asunga yo ozwa molimo ya sika, omonana ete ozali mosikolami mpo na kobikela bomoto ya sika oyo emonisi bokeseni na oyo ya kala, okoti na libota ya sika epayi wapi ozali na Nkolo ya sika oyo azali komema yo na banzela ya sika (Baefeso 4 :20-24). Akomísí yo na buku ya babundi na Ye, apesi yo makoki ya kokende liboso na mobemmbo ozali kosala. Na bongo, ndeko molingami kati na Klisto, toyambi yo na libota mpe na etumba ! Soki nano obatisama te, yebisa mokambi na yo ya boyekoli ya Bibia, moninga moklisto, to pasteur makambo osengeli na yango mpo obatisama. Zala polele wana ozali kolanda mabongisi ya lingomba mpo na kobatisama mpe landa yango nyonso kino suka. Klisto asengaki na bandimi nyonso ete babatisama, mpo yango ezali elembo ya lisanga na biso na Ye mpe litatoli ya polele na miso ya bato nyonso mpo na komonisa botosi na biso epayi na Yesu mpe epayi na Bokonzi na Ye (Malako 16 :14-16 ; Mat. 28 :18-20). Kowumela te ; libatisi ezali elembo oyo emonani na bato nyonso lokola ngolu oyo emonanaka te mpe epesameli yo na Nzambe na nzela ya mosala Yesu asukisaki na ekulusu. Tosa ye mpe batisama noki ! Na nzela ya kondima, nandimi ete Nzambe ayokeli ngai ngolu ya kolimbisa masumu na ngai, akómísí ngai mwana na Nzambe oyo akoki kopengolama te, oyo asungami na likama ya molili mpe akotisi ngai na bokonzi ya mwana na Ye.

Kondima

Made with FlippingBook - Share PDF online