Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya mibale (2) Makomami oyo tosalaka • 39
Deum Laudamus ezali libondeli baklisto balobaka na motu uta mibu ya nkama mineyi nsima ya kobotama ya klisto. Epesami na Episikopo Nicetas ya Dacia, na mibu 335-414, sima ya Klisto kasi bato basakolaki yango lokola nkombo epesami na Ambroise ntango abatisaki Augistine. Ozali Nzambe (Te Deum Laudamus) Ozali Nzambe : tokumisi yo; Yo, ozali Nkolo ; tobeteli yo milolo ; Yo, ozali Tata ya ntango nyonso : Bikelamo nyonso basalami na Yo. Banzelu nyonso, nguya nynoso ya Lola, Bakeluba mpe ba selafimi bayembeli yo Masanzoli oyo esilaka te : Mosanto, Mosanto, Nkolo azali Mosanto, Nzambe ya makasi mpe na nguya, Lola mpe nse etondi na nkembo na Yo. Etonga ya Bantoma ya nkembo basanjoli Yo. Lingomba ya basakoli ya lokumu basanjoli Yo. Mampinga ya babundi baye bakufeli Yo na molato ya mpembe basanjoli Yo. Zinga-zinga na mokoli mobimba lingomba mosanto babeteli yo milolo : Tata na nkembo ezanga suka, Mwana na Yo ya solo mpe ya likinda, oyo abongi na kosambela, mpe Molimo Mosanto, molobeli mpe mokambi. Yo, Klisto, ozali mokonzi na nkembo, mwana ya Tata ya libela. Ntango okomaki moto mpo na kosikola biso, obangaki te kokota na libumu ya elenge mwasi oyo nano ayebani na mibali te. Yo, olongaki ngenge ya liwa mpe ofungolela bandimi nyonso bokonzi ya lola. Ofandi na loboko ya mobali ya Nzambe. Tondimi ete okozonga mpe okozala mosambisi na biso. Yaka Nkolo, kosunga bato na Yo, Baye osombaki na makila na Yo mpenza, Mpe Yo na basanto na Yo bomemi biso na nkembo ya libela. Tata ya ntango nyonso, moyemi na ngai mpe Tata ya Nkolo na ngai Yesu Klisto, matondo mingi mpo otondi na ngolu epayi na biso lokola otíndéláká biso Yesu awa na nse mpo na kobikisa biso ; tokokaki komizwela bolingo to bolimbisi na Yo na ndenge na biso mpenza te, talaka nano, Yo, oyokaki biso mpasi, otindaki Ye komonisa biso nzela, mpe osilaki kokaba Ye na esika na biso lokola mbeka na masumu. Yo, otiaki elembo na nzela ya Molimo Mosanto mpo na biso, ondimaki tokota na libota na Yo, mpe tosikolama na nsomo ya liwa mpe na etumbu ya libela na libela. Sikoyo napesa Yo nini mpo na bolingo mpe mawa ya lolenge wana ? Nakopesa yo motema, lobiko, mosolo mpe ntango na ngai, mpe bazalani na ngai. Ntango nayebi bongo ete, ntembe te, ekowumela ngonga molayi ya koyeba Yo, nalingi oyeba ete namilengeli mpo na kozwa bomoyi ya seko, kolanda nzela ya sika mpe mobembo ya sika. Komisa ngai eteni na kati ya lisolo monene na Yo, O Nzambe, mema ngai na nzela ya Molimo opesaki ngai. Nakokumisa Yo na oyo nazali kosala, ntango Yo, osungi ngai. Na nkombo na Yesu nabondeli, amen.
Libondeli
Kokîmela to kolela na motema epayi na Nkolo
Made with FlippingBook - Share PDF online