Bunda etumba elamu ya kondima

L iteya ya misato (3) B okóti oyo tozwaka Kosangisa bomoyi na biso na oyo ya Nzambe kati na Klisto

Bongo bozali lisusu bapaya mpe batamboli te kasi bozali bato na mboka na babulami elongo na bana na Ndako na Nzambe. Botongami likolo na miboko na bantoma mpe basakoli, Klisto Yesu Ye moko azali libanga ya nsuka. Na Ye ndako mobimba ekangani esika moko mpe ezali kokola mpo na esambelo na bule kati na Nkolo. Na ye, bino mpe bozali kotongama mpo na kosala efandelo na Nzambe kati na Molimo.

Paulo na baefeso (Baefeso 2: 19-22)

Mposa ya kokokisa nsima ya liteya

Na suka ya liteya oyo, osengeli obika Bokóti tozwaka na : • Kondima ete tokomi bilembo ya nzoto ya Yesu na nzela ya kondima (elingi koloba : Tozali sikoyo « kati na Klisto ») ; tozali koyamba mpe kobikela makambo nyonso oyo Ye azali, oyo apesi biso, mpe oyo azali kosala. • Kondima ete na nzela ya mosala ya Molimo, tozui sikoyo bokoti na libota ya Nzambe oyo Yesu-Klisto azali libanga ya ntina mpe moboko na yango ezali mateya ya bantoma mpe basakoli. • Kondima ete eklezia moko moko ezali emoniseli ya Bokonzi na Nzambe, babátélí makoki mpe oyo etali lola mpenza, elongo na bandimi baye bakosala lokola bantoma mpe basali ya bokonzi yango. Nzambe ya bileko nyonso, Tata na ngai, olobi na Liloba na yo ete ozali liziba ya bwanya mpe ya mayele nyonso. Nandimi ete ezali solo. Tata ya bolingo, nasengi opesa mpe ngai bwanya ya bonzambe mpo ngai mpe nakoka kokabola Liloba ya solo (2Tim.2 :15). Nabondeli yo, lakisa ngai mpe teya ngai nzela nakolanda (Nje.32 :8), mpe kamba matambe na ngai. Sunga ete matoyi na ngai ebongama mpo na koyoka mongongo na Yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kobanza mpe ya koloba mpe zongisa ngai na nzela soki nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya bokesenisi, mpe sunga ngai nakoka koyekola mpe nayeba bokeseni kati na mateya, molimo mpe makabo ya Nzambe ya solo mpe na oyo ya binzambe-nzambe. Monisa ngai, na nzela ya Molimo Mosanto, mokano na yo, mpe pesa ngai lisosoli malamu na lolenge nakoki kosalela mposa na Yo na motema mobimba.

Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya

41

Made with FlippingBook - Share PDF online