Bunda etumba elamu ya kondima

42 • Bunda etumba elamu ya kondima

Nkolo ya bolingo, nabondeli yo sunga ngai nayokamela mpe noyoka noki, kasi naloba mpe nasilika noki te (Yak.1 :19). Tika ete maloba ya monoko na ngai mpe makanisi ya motema na ngai edimama na miso na Yo. Sunga ngai naloba solo na yo na bwanya nyonso na lolenge ete bayoki na ngai nyonso basosola mpe bazwa litomba na solo na Yo. Teya ngai sikoyo, awa nazali koyekola, ete nayamba liloba na Yo mpe lilako na Yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo ya nguya ya Nkolo mpe Mobikisi. Amen. 1. Mpo na nini bokeseni ezali makasi kati na oyo nazali kobikela mpe oyo Biblia elobi na ngai liboso na Nzambe ? Baklisto mingi ya sika bazali kokutana na bokeseni mingi kati na oyo Makomi elobi na ntina na bango bato na libota na Nzambe (bato balimbisami, bazongi na bondeko, bandimami na libota na Nzambe, mpe baponami na Nzambe) mpe ndenge makambo ya bomoyi na bango ezali kotambola mokolo na mokolo (kotiya ntembe, matungisi, koyoka mabe, komifunda, mpe kobanga). Emonani lokola ndenge mibale ya bomoyi ya moklisto (oyo Biblia elobi ekeseni na oyo nazali kobikela mokolo na mokolo) ; mpe ndenge mibale wana ekokani te mpe ekeseni moko na mosusu. Tango nyonso tozali kobikela bomoyi na biso ya boklisto mokolo na mokolo, ndenge nini tokoki kososola bokeseni oyo kati na oyo Makomi elobi mpe na oyo tozali kati na Klisto na ndenge tozali kokanisa ? 2. Tango nini nakobanda kosala lokola moto oyo Biblia ekokanisi ngai na ye ? Kozala moyekoli ya nguya, mingi-mingi ezali kokoka koyanola kokakatana oyo ezali na motema kati na lolenge tozalaki na yango liboso mpe ndenge tondimi Klisto sikoyo. Tango mingi, bomoyi na biso ya kala emonanaka ndeti yango ezali makasi koleka, emonani polele mpenza mpe elakisi biso polele ezaleli na biso mpenza kokesana na oyo Biblia, bateyi mpe babateli mpate bamonisi na ntina na biso. Lolenge nini moklisto ya sika akoki komikokanisa na oyo makomi mpe matatoli ya Biblia elobi, ata soki emonani ete bomoto na biso ya kala ezali « bomóto » oyo tobikeli, « ki-bongai » oyo tozali koyoka kati na biso mpe emonani lokola solo mpo na biso. 3. « Nakofanda sembo na ndako mpe nakotambola ngai moko elongo na Nkolo ». Ntango nzela epesamaki, mokóló oyo akomaki mondimi sika akangolamaki na minyololo ya bomeli bimeleli ya milangwa. Ayambaki Klisto mpe abandaki mobembo na ye ya bomoyi ya sika kati na Klisto. Ata bongo, kpokoso na ye ezalaki ete azalaki komona mabe mpenza tango nyonso azalaki liboso ya baklisto mosusu, mingi mpenza na lolenge na ye amesanaka kobikela mpo abikaki mingi na balabala, abebisa nzoto na ye, libota na ye, mpe boyokani na ye na bamisusu. Wana eyokaki ye mabe mpe alembaki, mokolo moko angangi :

Bokutani

Made with FlippingBook - Share PDF online