Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya misato (3) Bokóti oyo tozwaka • 43
« Yango nde boye ! » Nakanisi te ete nakoki kobikela bomoyi na ngai ya boklisto na bato ya eklezia te. Bazali bango nyonso bato malamu mpe bakoki kokoma na bisika oyo nawuti te. Nakanisi ete nasengeli kokoba kotambola na Klisto, kasi nakofanda na ngai na ndako, mpe nakotambola ngai moko elongo na Nkolo. « Bokoki kolobela ye nini na ntina ya mokano na ye ? Ezali mokano malamu ? Soki boye te, mpo na nini te ? » Na mateya oyo tosukisaki (bokomisi oyo tosalaka), toyekolaki ete ntango tobongwani epayi ya Nzambe na kokabwana na bikeko mpe masumu (kobongola motema) mpe tondimeli Yesu-Klisto ya Nasalete lokola Nkolo oyo asekui (na kondima), tozwaki mokano ya bokomisi nkombo na mampinga ya Nkolo, toboyaki bokonzi ya satana mpe tolandaki bokonzi ya Mwana mpenza ya Nzambe. Sikoyo tokotala bomengo oyo tozali na yango mpo na nzela ya bondimi, tosangani na Klisto, mpe balobi ete « tozali kati na Klisto ». Bosangani na biso na Yesu na nzela ya kondima epesi biso lolenge ya sika mpe boyokani liboso ya Nzambe (ezaleli na biso), tondimami malamo, tozwi kopambolama lokola bana ya Nzambe mpe bato ya Bokonzi na ye. Likolo na oyo nyonso, kozala « kati na Klisto » epesi biso nzela ya kotambola kati na elonga na ye mikolo nyonso wana ezali biso kobunda etumba malamu ya kondima – mpe tozwi nguya ya kotambola kati na Molimo Mosanto (lolenge na biso ya kobikela) ! Nakolandisama ya boyokani ya sika, moto nyonso oyo andimeli Yesu abátísámí (asangani) na Klisto na nzela ya mosala ya Molimo Mosanto (tala 1 Bakolinto 12.13, « mpo ete na Molimo se moko tobatisami kati na nzoto moko –ezala Moyuda to mopagano (baye bazali ya libota ya bayuda te) , atako bazali bawumbu to Nsomi – baye nyonso bazali ya Klisto tozalisami mpo tómela na Molimo Mosant yango moko »). Ntango tobatisami na Molimo (atiami kati na biso) ya Klisto, tobikisami kaka na nkanda ya Nzambe te, to toyambi (tozui) bomoyi ya seko oyo etondi na bisengo liboso na Ye, kasi toyambi (tozui) mpe makoki ya sika mpe boyokani na Nzambe ; epesameli biso mpo sik’awa tokómi moko na Yesu-Klisto (tala mikanda ya kobakisa : « Mapamboli 33 kati na Klisto »). Ya solo mpenza, topambolami na mapamboli mingi mpo ete totie motema epayi na Yesu mpo na lobiko na biso. Masumu na biso elimbisami (Baefeso 1 :7 ; Bakolose 1 :13), tozongisami na boyokani na Nzambe, tobongisami na bondeko elongo na Ye (2 Bakolinto 6.18-19), mpe tozuamaki lokola bana ya sika na kati na libota ya Tata mpenza (Baloma 8 :14-15 :23). Moko na mapamboli kitoko tozwi kati na Klisto ezali bokoti na biso lokola ba moko mpe esika tozwi na eklezia, nzoto ya Klisto. Na kondima, tokangani na bandimi nyonso bipayi nyonso, tokangami kati Nzambe moto na moto
Makambo ezali kati na liteya
Made with FlippingBook - Share PDF online