Bunda etumba elamu ya kondima

44 • Bunda etumba elamu ya kondima

na moninga mosusu. Mpe tozui mbano malamu ya kolikya, kokola mpe kosalela elongo na bokonzi ya Nzambe lokola libota moko. Matondo na Nzambe, tozali na mposa te ya kobunda etumba malamu ya kondima lokola moto oyo azali ye moko, kosalela makasi na ndenge na ye, kolikya na ye moko mpenza. Bandimi nyonso, banda baye bandima liboso kino baye babongoli mitema sika, tosálí nzoto kitoko se moko ya Klisto. Wana tozali na mayangani mingi mpe ba-eklezia na mboka nyonso (eklezia na « e » ya moke), tozali bobele kaka na Eklezia moko oyo ebandaki na Klisto mpe Bantoma, oyo ebulisami mpo na mwango monene ya Nzambe (Eklezia na « E » ya monene). Bondimi ya Nikea etatoli ete Eklezia oyo ezali se moko, bule, ya bantoma mpe ya molóngó mobimba « katoliko » (bato nyonso) * ; mpe esangisi biyamba nyonso bipalangani na mokili mobimba mpe ya lisolo mobimba. Ya solo mpenza, tóyóka Sango Malamu ya Ntoma Paulo na Bafilipi mpe tosalela yango na lolenge na biso ya kotambola kati na Klisto :

« Kasi, bomwana-mboka na biso ezali ya lola, uta wapi tozali kozela Mobikisi Nkolo Yesu-Klisto, Ye oyo akobongola nzoto na biso ya kosokema akomisa yango nzoto ya nkembo lokola oyo na Ye, na nguya oyo epesi Ye makoki ya kokonza biloko nyonso. »

Paulo na bafilipi (bafilipi 3: 20-21)

Emonani mpenza ete, mondimi nyonso azali mwana-mboka ya Lola mpe eklezia ya etuka nyonso azali motalisi ya Bokonzi na Nzambe epayi wapi tosangani mpo na mateya, kobondela, koyekola ezaleli na biso na molimo mpe mpo na kosalela Klisto elongo na Bandimi mosusu. Na mibu ya ebandeli ya eklezia, Molimo Mosanto akambaki bato na Nzambe mpo babandisa moboko, eloko nini tondimi, lolenge nini tosengeli kosambela Nzambe mpe lolenge nini Makomi Mosanto esengeli kozala. Bindimeli oyo ya ntina etiami lokola moboko ya kondima mpo na bandimi nyonso, bipayi nyonso ; mpe moboko oyo ebengami Bonkoko Monene. Yango etalisi ete mateya mpe kobika oyo bantoma balakisaki, oyo ekomami na Biblia, etiami na mokuse mpo na kotatola bondimi monene mpe mayangani ya Eklezia, mpe ebatelami na bandimi na bileko nyonso (tala na « Kokende liboso na kotalaka sima » mpe « Litatoli ya Nikea na buku ebakisami »). *Katoliko – Katoliko elingi koloba Eklezia ya Katoliko ya Roma te, kasi ezali nde eklezia ya bato nyonso babengami Baklisto ntango nyonso, na mabota nyonso, ya nkótá to minoko nyonso, mpe na bato ya bikolo nyonso. Na kondima ya bantoma ya Nikea, liloba katoliko ezali komonisa bosangisi ya baklisto ya molóngó mobimba na eklezia na bileko mpe tango nyonso, ya nkótá to minoko nyonso mpe mabota nyonso. Ezali komonisa bonkoko moko te, etali eyamba moko kaka te (lokola eyamba Katoliko ya Roma).

Made with FlippingBook - Share PDF online