Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya misato (3) Bokóti oyo tozwaka • 45
Ntango nyonso eklezia ekutanaka…mpe etátolaka suka ya mokili mpe kokweyisama ya mokili. yango etelemelaka matatoli ya mokili mpo na kopesa elonga ya solo na ezaleli ya bato na mokili. Eklezia eboyi bizaleli ya mokili. Etatoli ete lokola esangisi baye babatisami, mpe soki tobomi kati na biso bamposa ya mokili nde tozui bomoyi oyo ezali na ntina mpenza … losambo ya Baklisto ezali makasi ya komiboya oyo ekoki konganga ntango tokutani ná oyo mokili ezali kosenga mpo na kopesa bato kolongisama ya nguya mpe ya kokoka na bomoyi na bango. Botélemeli ya lolendo mpe bozangi elikya ya mokili moko ya nguya ezali lisusu te bobele oyo ezali na losambo »
Jean-Jacques von Allmen : Ses Théologie et Pratique London: Lutter Worth, 1966, p. 63
Bokoti oyo tozwaka Liteya ya mísato Boyekoli Biblia Tanga Makomi oyo mpe pesa biyano na mokuse na mituna ekokani na malako ya Biblia. 1. Na nzela ya lisekwa na Yesu, Nzambe apesi biso elikya makasi mpe elaka ya bomoyi ya seko. Tanga 1 Petelo 1 :3-12 a. Yebisa mapamboli mísato (3) oyo tozui kati na Klisto. i. ii. iii. b. Tokozwa nini ntango toyiki mpiko na pasi ya komekama ? (v.6-7) c. Ata soki tomoni Nkolo na nzoto te kati na biso sik’awa, ndenge nini tososoli lisusu kobika na biso kati na Ye ? (vv 8-12). 2. Yesu azali libanga na bomoyi mpe biso bandimi tozali baponami ya Nzambe. Tanga 1 Petelo 2 :4-10. a. Lokola tozali lisanga ya banganga babulisami na Klisto, mosala nini Nzambe atikeli biso tosala yango ? (v. 4-5)
Made with FlippingBook - Share PDF online