Bunda etumba elamu ya kondima

46 • Bunda etumba elamu ya kondima

b. Yebisa makambo míneyi (4) oyo ezali solo mpo na biso libota ya Nzambe. i. ii. iii. iv. 3. Na nzela ya kotia motema na biso epayi ya Klisto mpe na kobatisama na biso kati na Yesu, tosangisami esika moko na Yesu na kufa, na kokundama, na lisekwa – mpe sikoyo na bomoyi na ye ya sika. a. Tanga Baloma 6 :3-10. Yebisa makambo mísato (3) oyo ekomeli biso ntango tobatisami kati na Klisto. i. ii. iii. b. Mpo ete tokufa elongo na Klisto, lolenge moko tosékwá na ye (na nzela ya kondima), nguya nini lisumu ezali na yango sikoyo likolo na biso ? (vv 9-10) c. Ndenge nini tosengeli kotia motema na biso mpenza na masumu mpe nguya na yango likolo na biso lelo? (vv 11-13) 4. Yesu azali na kati-kati ya bomoyi ya baklisto, Ye nde moto tosengeli kolanda na makambo nyonso. Tanga Bakolose 2:1-10. a. Pona nini Paulo azali komonisa Klisto lokola « libombami na Nzambe », na Ye moko kaka nde tokuti bomengo (bozui) nyonso ya bwanya mpe boyebi? (vv. 3-4) b. Ndenge nini Paulo abetisi móndengé ya komekana epayi ya Bakolose mpo báyanola na Klisto, sikoyo eyambi bango Ye lokola Mobikisi mpe Nkolo? (vv. 6-7) c. Bandimi basengeli ntango nyonso komibatela na likambo nini ? (v. 8)

Made with FlippingBook - Share PDF online