Bunda etumba elamu ya kondima

48 • Bunda etumba elamu ya kondima

7. Nzambe aponaki kobimisa nkembo ya ngolu na Ye na njela ya libota na Ye, Eklezia. Tanga Baefeso 3 :8-11. Tondisa bisika ya polele : Nzambe, moto asalaki biloko nyonso na nzela ya ______________ amonisaki ________________ ya ndenge na ndenge __________________ ya Nzambe oyo eyebanaki mpe _____________ na bisika likolo. 8. Na bileko ya kala, Nzambe aboyaki komonisa mabombami minene na Ye oyo ezali komonisama na bato na nzela ya matatoli ya bantoma na ntina ya Klisto mpe ata kutu epayi ya baye bazali bayuda te ! a. Tanga Bakolose 1 :24-29. Pona eyano oyo eleki kitoko. libombami nini Paulo alobaki ete ebombamaki uta bambula mpe bileko ebele kasi emonisami lelo epayi na biso ? i. Mokolo mpe ngonga Yesu akozonga. ii. Klisto kati na biso, elikya ya nkembo. iii. Motindo ya liwa Paulo akutanaki na yango. b. Mpo na nini okanisi ete Nsango na ntina na Klisto kati na biso (biso bayuda te) emonani lokola emoniseli na ntango ya Paulo ? Bantoma kati na Boyokani ya Sika batatoli ete mondimi nyonso ya Klisto akangama na Ye mpe na mosala na Ye na nzela ya nguya ya libatisa ya Molimo Mosanto. Molimo Mosanto akotisa biso na Klisto, asangisa biso na kufa ná Ye, na kokundama ná Ye, na lisekwa na ye, mpe na bomoyi ya sika. Kati na Yesu, biso tozali lisusu bawumbu ya nkanda ya Nzambe te, mpe tozali lisusu na nsomo ya etumbu mpo na ebele ya masumu (kosopa mibeko na Nzambe) oyo biso tosalaki te. Nzambe apesi biso mpenza kati na Yesu Klisto lolenge ya sika ya kobikela (bozalisami ya sika) mpe boyokani ya sika na Ye moko. (Nzambe) apamboli biso mpe na mapamboli mingi, ya malamu koleka mpe ya makambo kitoko mpe mapamboli ya ngolu oyo tokokaki kozwa te, nde tozui yango na nzela ya Klisto. Kati na makabo malamu oyo tozwa, moko na oyo eleki motuya ezali bokoti mpe esika na biso kati ya Eklezia, nzoto ya Klisto. Nzambe asangisi biso nyonso kati na Klisto, mpe elongo na bandimi mosusu. Nzambe apesi biso nkonzo mpe mokumba ya kobika mpe kokola elongo lokola libota ya Nzambe (1 Yoane 3.1-3), lokola nzoto ya Klisto (Baloma 12.4-8), mpe lokola tempelo ya Molimo Mosanto (1 Bakolinti 3.16-17). Ebongisamaki ata moke te ete tobikela bomoyi ya moklisto na libanda ya lisanga, ndenge moko kaka na nzoto ya moto ekoki kobika malamu te soki ezali na elama moko

Na mokuse

Made with FlippingBook - Share PDF online