Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya misato (3) Bokóti oyo tozwaka • 49
na makolo to mpe maboko. Te, binama nyonso ezali na motuya mpo nzoto ekola, ekemba, mpe ekokisa mosala oyo etindamaki kosala. Na boye, mondimi nyonso asengeli komikamata lokola moí-mboka lola (mwana-mboka ya lola), mobali to mwasi oyo asangani na Klisto mpe azali na elikya makasi ya bozongi na Ye na mokili (awa na se). Na kolandáká makanisi oyo, eklezia moko moko ekoki kososolama lokola etalisi ya Bokonzi na Nzambe, esika ya liboso mpo na komona makambo ya Bokonzi ya lola, esika oyo bandimi basangani mpo na kokola, kosanjola, mpe kosalela Nkolo elongo na Baklisto mosusu baye bazali nano kokola. Uto ebandeli, Molimo Mosanto akambaki bato ya Klisto ete bamikokanisa, batatola, babatela mateya ya ntina mpe bizaleli ya Bantoma ndenge efandisami na Biblia mpe eteyami bileko nyonso na Eklezia. Bonkoko monene oyo, mateyo ya bonzambe ya ntina mpe bizaleli ya Eklezia endimami, eteyami mpe ekumisami kati na eklezia ya bingumba bipayi nyonso na mokili wapi esika Klisto ayebani lokola Nkolo mpe Klisto. Bokoti oyo tozwaka nsima ya kondima na biso ezali bokoti ya kozala bamoko kati ya baí-eklezia; kokota oyo ekoki kaka ebongisama na eklezia na lisungi ya Mobateli mpate, bateyi mpe bato ya sôlo, epayi wapi tokoki kokola, kosanjola, mpe kosalela Klisto lisanga. Mpo na Mikanda oyo ebakisami, bosengeli boyekola mpe bomanyola yango mpo ekokani na liteya: Mapamboli ntuku mísato na mísato (33) kati na Klisto (Monk.ya kob.14) Kati na Klisto (Monk. 8) Yesu ya Nasalete: Komonisama ya eleko oyo ekoya (Monk ya kob. 4) Kokende liboso mpe kotalaka sima: Bozongeli ya bonkoko monene ya Nsango Malamu (Monk. ya kob.16)
Minkanda ya kobakisa
Kondima na Nikea (Monk.ya kob. 24 et 25) Kondima ya Bantoma (Monk.ya kob.26)
Kati na Klisto, tozwa mapamboli nyonso ya molimo (Baefeso 1.3).
Mobeko ya ntina
Koyekola makambo tokutanaka na yango
Botanga mpe bokanisa makambo oyo mpe makanisi oyo elandi. Mpe bopesa biyano mpe makanisi mpo na kosilisa oyo ewuti na makomi bowuti koyekola. 1. « Nazali na bosenga ya kobatisama te, mpo esi ekomela nga nabatisama » Ndeko mwasi moko oyo ayambi Klisto sika azali kosolola na mobateli mpate na ye soki azali na bosenga ya kobatisama lisusu, mpo ete asi abatisama uto bomwana na ye. Ezali boye: ntango
Made with FlippingBook - Share PDF online