Bunda etumba elamu ya kondima
50 • Bunda etumba elamu ya kondima
abatisamaki eleki mibu mingi, asosolaki te mpe azuaki mokano mpo na Klisto te – ezalaki kaka na mibu ntuku míbale (12) mpe ayebaki te nini ezali mpenza kobatisama. Sikoyo ayebi mpenza ete andimaki Klisto te ntango abatisamaki. Okoki kopesa toli nini na mondimi mwasi mokóló oyo ya sika? Esengeli aluka lisusu abatisama, kasi mbala oyo, kosala mpenza ayeba nini libatisi elakisi, mpe asosola malamu bondimi na ye mpe kozua mokano mpo na Yesu Klisto lokola Nkolo mpe Mobikisi? 2. Moninga na ngai alobeli ngai ete mpo na kozwa mapamboli, nasengeli « kotanga nkombo ya mapamboli yango mpe kosenga yango na makasi » epayi na Nzambe. Ndenge nini ekoki kokosela to koloba bilobela na ntina na Biblia? Mondimi ya sika moko akotaki na losambo, mpe kuna na lingomba wana bayebisaka Baklisto « batángaka nkombo ya mapamboli oyo bakosenga na makasi » epayi ya Nzambe mpo babika na bosenga na bango ya nzoto, mpo na kobikisama na bokono, mpe lisungi epayi na Nzambe na ntango ya mikakatano. Bazali kosenga mingi mapamboli oyo etali nzoto (misolo, bokolongonu, bozwi ya ndenge nyonso), mpe bokebi moke mpenza na mapamboli na biso ya molimo « kati na Klisto ». Lolenge nini tosengeli kososola maloba ya Nzambe oyo eyebisi biso ete toyambaki mampamboli nyonso ya molimo kati na Klisto (ndakisa Baefeso 1 :3), mpe tóbeta nsete epayi na mangomba oyo ezali kosengaka mapamboli ya biloko ya mokili na makasi epayi na Nzambe mpo na bomoyi ya nzoto (elingi koloba, « makambo ya bokolongonu ya nzoto mpe bomengo » ya mokili ?). Ndenge nini tokoki kososola malamu bobeti nsete oyo etiami kati na makambo mibale wana mpo na lobiko mpe lisungi ya Nzambe? 3. Nakoki kozwa makambo nalingi na lingomba songolo moko te. Nakozwa oyo nasengeli na yango na mangamba kokesana na mboka – Losambo tosali na lingomba A, mateya na lingomba B, mpe bondeko (boyokani) na lingomba C. Ezali malamu bongo ? « Koleka-leka na mangomba » ezali likambo emonani kati na bayekoli ya Klisto lelo. Bakanisi solo ete bakoki kozwa nyonso basengeli na yango te mpo na bakola mpe bakende liboso na lingomba moko kaka. Baklisto mingi bamesani komilobela : « napumbwa na lingomba oyo », nakota na lingomba mosusu na bileko kokesena mpo na kozwa mateya ndenge na ndenge, nakota nde awa mpo na mabongisi mosusu, to mpe na bokutani na nsámbo ndenge na ndenge. Na mokili oyo moto na moto ameseni « kozwa oyo asengeli na yango » na banzela kokesana. Bandimi mingi basaleli lolenge wana na makutani ya lingomba. Yango wana momesano efandisami na likanisi ete lingomba moko te ekoki kosilisa bosenga nyonso ya Baklisto to ya libota ya Baklisto na lolenge ekoki. Baye bandimaka bongo bazali koloba ete bázwaka lisungi malamu na kosanjola Nzambe kati na lisanga moko, bayokaka mateya malamu na lisangana mosusu, kasi mpo na kobatela mobeko basengeli kotikala mondimi ya lingomba ya baklisto moke. Soki lingomba ezali etalisi ya
Made with FlippingBook - Share PDF online