Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya misato (3) Bokóti oyo tozwaka • 51

nguya ya Bokonzi na Nzambe, ntina nini ekoki kozala malamu te ete tomipesa na « kopumbwa-pumbwa » na makambo oyo emonisi ete tokoli na kimoklisto?

Zwa ntango na poso oyo otala lisusu makomi oyo ezali koloba na ntina na mapamboli mpe nkita ozali na yango sika oyo lokola mondimi abatisama na kati ya Klisto. Okoki kokanisa to kosenga na makasi mapamboli ebele ebele soki ozangi boyebi ya lolenge yango ezali, to mpe ndimbola na yango mpo na bomoyi na yo ya Boklisto! Yekola milongo ya makomi oyo ezuami na mikanda ebakisami « mapamboli ntuku mísato na mísato (33) kati na Klisto », mpe omesana na solo yango. Wana ososoli malamu mapamboli Nzambe apésa yo, boye okozala na makoki ya kobikela yango mpe kosalela yango lokola makambo ya kosolola na baninga mpe lokola eteni moko ya maloba ya mabondeli tango ozali kopesa Nkolo matondo mpe kolómba na ye. Soki nano okoti na lingomba songolo te (elingi koloba, oyo ezali kotalisa Bokonzi ya Nzambe!), tika ete osenga Nkolo akamba yo na mikolo mpe baposo ezali koya mpo ozwa esika (kasi bisika te) oyo okobanda kosangana. Ozali na bosenga ya kozala na nse ya Mobateli mpate moko, kozala na bondeko na bazalani Baklisto bamípésá mpe kozwa bisika ya kosalela makabo ya molimo oyo ekosunga yo kosalela mpe kolendisa basusu. Fungóla ezali bobele komipesa na kosangana esika moko na baninga mosusu mpamba te, kasi óndima koluka kososola ndimbola ya kosangana to kokóma moko na bango kati na lisangana, elama (to eteni ya nzoto) oyo ezali kobika kati na nzoto, esika ozali kosangana na bato mosusu. Kolemba te soki ezali komonana lokola nsoni to ózala yo moko na ebandeli; yika mpiko mpe sangana na basusu, mpe likya epayi na Nkolo ete afungola bikuke ya balingami mpe ya kosungana wana ozali kotambola. Nzambe akokamba yo, mpe soki ozali kokanga motema, okobota mbuma mingi (Bagalatia. 6:7-9).

Bokutanisi

Mpo ete nabatisami kati Klisto, nabikeli mapamboli nyonso, nkembo, elikya mpe minyoko ya Klisto na Baklisto nyonso ya bipayi nyoso mpe na ntango mobimba.

Kondima

Billy Sunday ayebanaki mingi lokola mobeti monene ya motopi ya maboko na League National de Basketball na 1880. Akómáká na lokumu lokola mopalanganisi Nsango Malamu oyo abendi bato mingi na mibu ntuku mibale mya ebandeli ya mibu mya nkama 20 (20ème S.). Liteya ya Sunday ebendaki ebele ya bato na milulu ya Nsango malamu ebongisamaki na bingumba minene na Amelika. Kati na moko na mateya minene na ye oyo atomboli boyengebene to kokoka ya Yesu Klisto, oyo akokisa bosenga

Libondeli

Made with FlippingBook - Share PDF online