Bunda etumba elamu ya kondima

L iteya ya míneyi (4) M akabo oyo tozwaka Mosala ya molimo mosanto na kati ya etumba elamu ya kondima

Ye mpe asili kopesa makabo ete basusu bazala bantoma, basusu basakoli, basusu bapalanganisi na Nsango Malamo, basusu babateli mpe balakisi, mpo na kobongisa Babulami, mpo na mosala na kosungaka, mpo na kotongaka nzoto na Klisto kino ekokoma biso nyonso na bomoko na kondima mpe na boyebi ya Mwana na Nzambe na mobali mobimba, na epimelo na monene na litondi na Klisto ete bozala bana mike lisusu te baye bakoninganaka mpe bakotepaka epayi na mipepe nyonso ya mateya mpe na mayele na bato na bozimbisi na bango na nzela na mikano mabe. Kasi awa ekolobaka biso na sembo kati na bolingo, tokola na makambo nyonso epayi na ye oyo azali motó, ye Klisto. Na suka ya liyangani oyo, bosengeli kokutana na Makabo oyo tozwaka na kondimaka été : • Molimo Mosanto azali kofanda kati na mondimi nyonso, mpe azali kopesa makabo epayi na moklisto nyonso mpo na kosunga nzoto. • Tozwaki bonsomi na nzela ya Klisto mpo na kosalela makabo na biso awa Molimo mosanto azali kopesa biso nzela ya kosunga. • Na kolandaka lolenge Molimo akomonisa, makabo, mpe nguya, topesami nguya oyo ekoki mpo na kobika na bondeko na bandimi mosusu na Lingomba, komonisa ete bokembá mpe bozali na bomoko. Nzambe ya bileko nyonso, yo Tata na ngai, oyebisi biso na Liloba na yo ete ozali liziba ya boyebi mpe bwanya. Nayebi ete yango ezali ya solo. Tata ya bolingo, nasengi yo bwanya ya bonzambe na yo mpo ngai mpe nakabola na Liloba na yo ya solo (2Tim 2 :15).Nabondeli yo, teya ngai lolenge nasengeli *Bapalanganisi Nsango Malamo. Baye Molimo apesi likabo ya kopanza Nsango Malamo epayi na baye babunga. Wana bandimi nyonso basengeli kokabola Nsango Malamo basusu bapesami likabo wana mpo basunga kotonga nzoto ya Klisto. *Babateli to bapasitele. Bazali babateli ya bampate baponami elingi koloba kobatela lingomba. Babateli mpate basengeli kobatela mangomba na bango na nzela ya koteya Biblia, kopesa mateya ya Nzambe, mpe kolendisa bampate, kokebisa bango na makama mpe komonisa bango nzela ya kosala mosala na Nzambe na kati ya masangá na bango. Paulo na baefeso (Baefese. 4 :11-15)

Mposa ya kokokisa nsima ya liteya

Libondeli ya kofungola mpo na kosenga bwanya

55

Made with FlippingBook - Share PDF online