Bunda etumba elamu ya kondima

56 • Bunda etumba elamu ya kondima

natambola (Nzembo 32 :8), lakisa matambe na ngai nzela ya kolanda. Bongisa matoyi na ngai ete nayoka mongongo na yo, mpe sembola ngai na lolenge ya kokanisa mpe koloba mpe zongisa ngai nzela soki nabungi. Tata, pesa ngai likabo ya kokesenisa, mpe pesa nguya ya kokesenisa mateya ewuti na Nzambe mpe oyo ewuti na bato, milimo, mpe makabo oyo ezali ya Njambe te. Monisa ngai mokano na yo na nzela ya Molimo Mosanto, mpe pesa ngai bososoli ya kosalela lolenge nini nakoki kokokisa mposa na yo na motema moko. Nkolo na bolingo, nabondeli yo osunga ngai ete nayoka noki mpe nayokamela, naloba noki te mpe nasilika noki te (Yak.1 :19).Tika ete maloba na monoko na ngai mpe makanisi na motema na ngai endimama na miso na yo. Tika ngai naloba bosolo na yo ná mayele nyonso mpo ete baye nakoteya liloba na yo basosola yango malamu mpe bazwa litomba na nzela ya bosolo na Yo. Teya ngai sikoyo ntango nazali koyekola mpe kozwa Liloba na yo mpe bitinda na yo. Nasengi nyonso oyo na nkombo na nguya ya Yesu, Nkolo mpe Mobikisi, Amen. atangaki na Baefeso 4 :11-15 mpe atuni motuna oyo : « Nakanisi bato lokola bantoma, basakoli mpe bato na lolenge wana bazalaka lisusu na Lingomba te. Makomi wana elobi nini ? Tozali na bato oyo bazali kosala lokola bantoma, basakoli lelo ? Soki bongo, wapi bango ? Soki nasosoli oyo Paulo alobi, Nzambe apesaki biso etonga ya bato wana mpo bakoka kosunga biso na koyekola lolenge ya kokamba bandeko basusu. Yango ezali malamu penza ! » Okanisi makomi wana elingi koloba nini mpo na biso lelo –Nzambe azali kokoba kopesa biso bakambi baye bazali na makabo na Lingomba mpo baklisto bakoma basali ya mosala na Ye ya solo na mokili ? 2. « Nayebi ata mobateli mpate na ngai te. » Na lisanga ya mabondeli ya mibali, likanisi ebimelaki biso na ntina na bosenga na biso na nse ya libatela kolakisama ya mobateli mpate to pasitele. Ndeko moko alobi : « Iyo, Nzambe apesa biso babateli mpo ete bakoka kobatela biso lokola nguba, babatela biso na mabe mpe makama na molimo. Bazali babateli ya bibwele ya Nzambe, bapesami bokonzi ewuti epayi ya Nkolo mpo na kosunga biso lokola bampate, ete toleyisama malamu, tozala makasi, tolengela mpo na kobongisa misala ya lotómo ». Moklisto moko ya sika na lingomba alobaki : » Nayoki oyo bolobi, kasi nazali kososola te, nasololá na mobateli mpate bobele mbala moko, (oyo azalaki bobele mbala moko uta kala, ntango nayaki mbala ya liboso na losambo), kasi nayebi ye mpenza ata moke te. Na bosembo mpenza, nayebi mobateli to pasitele na ngai te. Ndenge nini akokengela ngai ntango nayebi ye te ? » 1. « Yango bantoma mpe bakambi basila nde ? » Na ntango tozalaki koyekola Biblia na mokanda ya Baefeso, moklisto moko ya sika

Bokutani

Made with FlippingBook - Share PDF online