Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya míneyi (4) Makabo oyo tozwaka • 57
Liteya nini okopesa na mondimi ya sika wana – eloko nini ondimi ete Nzambe alingi ye asala mpo na bozangi boyokani na mobateli na ye ? 3 . « Ndenge nini okoki koyeba soki ozali na Molimo Mosanto ? » Elenge mwasi moko azwaka mikakatano na lisolo bazalaka na yango na bus na moto moko alobaki ete azalaki moto ya lingomba ya « Pantekota ». Moto yango ayebisaki ndeko mwasi ete ye, elenge mwasi, asengeli kozwa Molimo Mosanto, oyo ekoki komonana na libatisi na ye na « ya Molimo Mosanto », oyo elandani na koloba na nkota*. Ndeko mwasi ayanoli ye alobi : « Poso eleki toyekolaki na Biblia ete moto nyonso oyo ayamboli masumu na ye, soki abongwani mpe andimeli Yesu, asili kozwa Molimo Mosanto oyo akofanda na ye banda kaka ngonga andimeli. Toyekolaki lisusu mpe ete Molimo yango azali kopesa biso makabo ya kosalela baklisto mosusu na nzoto ya Klisto, mpe lisusu koloba na nkota ezali nde moko ya makabo Molimo apesaka -kasi makabo yango esengeli nde epesama bobele yango nyonso epayi ya moklisto nyonso ? Yango ekosala lolenge nini ? » Ndeko mwasi amipesi sikoyo na lolenge nini akoki kozwa boyebi na oyo etali Molimo Mosanto –akoki kobanda koyekola boni ? Na bokutani eleki oyo tomonaki Bokoti oyo tozwakaa toyekolaki ete ntango tondimelaki Yesu, tobatisamaki na Yesu, tosangólákí mapamboli na Klisto. Sikoyo tokozwa ndambo ya makambo oyo Biblia elobi na ntina ya Molimo Mosanto, mosala na ye mpe mapamboli na bomoyi ya bandimi, mpe tokomona lisusu lolenge nini azali kopesa makabo songolo mpe makoki ya kosunga biso tokola mpe toya makasi wana totamboli na Nkolo na kati ya Lisolo ya kobunda etumba elamo ya kondima. Molimo Mosanto azali ndanga ya lisangó oyo biso baklisto tokozwa ntango Yesu akozonga kotelemisa Bokonzi na Ye. Molimo azali kopesa likabo epayi na moklisto nyonso mpo na kolendisa to kotonga bandimi mosusu na kati ya nzoto ya Klisto na etónga songolo. Molimo Mosanto akoya kofanda epayi ya moklisto nyonso ; moko atikali te mpo nzoto esengeli na mosala ya elembo nynoso ya nzoto, moto nyonso amikotisa na lisungi na ye, mpe na mosala na ye. Na nzela na ngolu na ye, Nzambe mpe apesi biso bolimbisi ya masumu mpe bonsomi likolo ya masumu, ya ekweli mpe bolóko, mpo ete *Koloba na nkota – Ntango Lingomba ebandaki na koya ya Molimo Mosanto (Mis.2), bandimi bazwaka makabo ewutaki na ye, bakisa na makoki ya koloba na nkota oyo bakokaki koloba libo so te. Likabo wana elobami na boyokani ya Sika mpo na kolakisa ete baklisto bazali na makoki ya kolendisama (1Kol.12 :1-31), kaka na lolenge wana likabo ya koloba na nkota mpe epesama ki na bandimi ya sika, bobele na nzela ya koyamba Yesu. (ndakisa Mis.10 :44-46). Na mangom ba misusu lelo, bandimaka ete moklisto nyonso asengeli bobele amekola koloba na nkota oyo bayekola te, ntango mangomba misusu balobi ete yango ezali nde likabo epesami na Molimo epayi ya ndambo ya bandimi kasi na bandimi nyonso te.Bongo mangomba misusu balobi yango epesamaki bobele na lingomba ya kala kasi lelo likabo wana ezalaka lisusu te
Makambo ezali kati na liteya
Made with FlippingBook - Share PDF online