Bunda etumba elamu ya kondima

58 • Bunda etumba elamu ya kondima

tokoka kosunga basusu na nkombo ya Klisto na molende nyonso mpe na esengo nyonso. Ye asungi biso ete tokola ntango tozali kokanisa Makambo ya Nzambe, kotombola lokumo ya nkombo na ye na mokili na nzela ya Elambo na Nkolo (losambo), kobongisama na Molimo ntango tozali kotambola lisanga na kotosaka mibeko ya ezaleli malamu na molimo mpe kokabola Nsango Malamu mpe misala malamu (litatoli malamu). Ntango tozali kokolisa makoki na biso ya kosanjola Nzambe mpe ya kobunda etumba, tozali mpe kokola na kondima na biso mpo na kopesa bibundeli epayi na bandimi mosusu. Ntango baklisto bazali kobakisa bokembi, bomoko mpe ekoli na kati ya Lingomba ; yango nde esepelisi Klisto. Molimo Mosanto atalisi Nzambe. Ye nde amonisi bosolo ya Nzambe. Elingi koloba soki oyoki ete Molimo atinda yo osala likambo, nzela na ye ezali bobele kotambola elongo na solo ya Liloba na Nzambe. Molimo amemaka biso ata moke te na nzela mosusu kokesana na oyo ya Makomi Esanto. Akoki kosala yango te mpe akosala yango te. Ye azali kotalisa mpe atomboli lokumo mpe bomoto ya Yesu. Ye amonisi polele lolenge ya Nzambe. Ntango ondimi, Molimo Mosanto akolakisa yo na nzela ya lobiko mpe akosalela yo lomeko oyo : ondimi ete liloba oyo ekokani na bosolo ya Biblia ? Soki te, longola likanisi wana bongó na yo. Banso tokoki bobele koyengayenga na makanisi. Zongisa makanisi na yo na maloba ya ntoma Paulo oyo esimbi biso makasi mpo na komona soki totosi bosolo ya Klisto. Soki ekokani na Liloba na Nzambe te, wana ewuti na Molimo te –mpe bazali na kati mpenza ya esika ya makanisi na yo.

~ Jennifer Rothschild. Self Talk, Soul Talk : Que dire quand tu parles en toi -même. Eugene, OR : Harvest House Publishers, 2001, pp. 54-55.

Makabo oyo tozwaka Liteya ya míneyi (4) boyekoli Biblia Tanga makomi oyo elandi mpe yanola na mokuse mituna oyo ekokani na mateyo ya Biblia. 1. Yesu abondelaki mpo na biso, mpe mpo na baye bayaki kondimela Ye lokola Nkolo mpe Mobikisi. Tanga Yoani . 17:20-26 Koma biloko misato oyo Yesu asengi Tata likolo na biso. a.

Made with FlippingBook - Share PDF online