Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya míneyi (4) Makabo oyo tozwaka • 59
b. c.
2. Molimo Mosanto afandi sikoyo na kati ya Moklisto nyonso oyo abongwana mpe andimela Yesu Klisto. Tanga Baloma 8 :9-17 mpe yanola na mituna oyo: a. Moto akoki nde kozwa lobiko na nzela ya Klisto mpe azangi Molimo Mosanto? ( vv 9-10 ) b. Nenge nini baye bandimeli bakosekwa kati na bakufi ? (vv 11) c. Ndenge nini tokoki koyeba mpenza bana na Nzambe ya solo ? (vv14-15) d. Ndenge nini Molimo akososolisa biso ete tozali bana na Nzambe ? (vv 16-17) 3. Nzambe Tata apesaki biso makabo ya Molimo ya ngolu na nzela ya Molimo Mosanto mpo na kokolisa botongi ya nzoto ya Klisto. Tanga Baloma 12 :3-8. Tanga nkombo ya makabo ya Molimo Mosanto oyo ekomami na mokapo oyo.
a. b. c. d. e.
4. Makabo ezali na mitindo ebele, lisungi ya lolenge na lolenge, mpe misala oyo epesami na Molimo Mosanto, kasi azali kopesa na mondimi moko-moko ya ye likabo ekesani na basusu mpo na lisungi ya bandeko baklisto mosusu. Tanga Baloma 12 :4-11. Pona eyano ya malamu : a. Makabo ya molimo epesami mpo na komitosa to komilinga. b. Makabo ya Molimo epesami mpo na bolamo ya bato nyonso.
Made with FlippingBook - Share PDF online