Bunda etumba elamu ya kondima

60 • Bunda etumba elamu ya kondima

c. Bandimi bakoki kopona makabo oyo bazali na yango. d. Bato mosusu bakoki kozwa makabo ya Molimo te.

5. Bandimi basengeli kosalela malamu mpenza makabo kitoko ya ngolu na lolenge ekopesa Nkolo lokumo na nzela ya Yesu Klisto. Tanga 1 Pet. 4 :7-11. Sangisa maloba ekokani na solo na yango. a. Bolingana kati na bino __ Na nguya epesami na Nzambe b. Bomonisa boyambi __ Etondi na ebele ya masumu c. Salela likabo na yo __ Lokola osalelaka Liloba na Nzambe d. Loba __ Koyimayima te e. Salisa __ Bosalisana kati na bino lokola babateli ya ngolu na Nzambe 6. Momlimo Mosanto abengi biso tozala na bonsomi, ezala na bikweli to na bolóko. Apesi biso nguya ya kosepelisa Nzambe, kasi ya kosalela bonsomi na biso te mpo na kosala nyonso oyo tolingi. Tanga Ngal. 5 :13-16. Tondisa bisika ya polele. a. Bobangami mpo na ______________________________________ . b. Bosalela bonsomi lokola nzela ya ____________________________ te kasi ezala mpo na _______________________________ bino na bino. 7. Tosengeli kopona, to tosala oyo Molimo atindi tosala lokola elingi Ye to tosala lokola mposa na biso etindi na kolandaka ezaleli na biso ya kala. Nzela nyonso tokopona ezali na lifuti na yango na bomoyi na biso. Tanga Bagalatia 5 :16-24, mpe yanola mituna oyo na kolobaka solo to lokuta (S to L): a. S to L. Soko totamboli na Molimo, tokosepelisa mposa ya ezaleli na biso ya kala te. b. S to L. Molimo Mosanto azali na boyokani na mposa na biso ya kala na makambo ya sembo. c. S to L. Ntango misala na biso ya ezaleli ya kala ebombani, mbuma ya Molimo emonani polele.

Made with FlippingBook - Share PDF online