Bunda etumba elamu ya kondima
Liteya ya míneyi (4) Makabo oyo tozwaka • 61
8. Klisto apesaki ndanga ya kotinda Molimo Mosanto mpo na kopesa bibundeli epayi ya mondimi mpo na kosala mosala na Ye na mokili. Tanga Yoane 16 :5-15. Tia makambo mísato na molongo, makambo oyo Yesu alobaki ete Molimo Mosanto akosala mpo na biso.
a. b. c.
9. Mondimi abengami koyokana na Molimo Mosanto na ndenge nyonso, Na kotosáká Liloba mpe kosáléláká Liloba yango na kobanza-banza te. Tanga makomi oyo mpe monisa lolenge tokoki koyanola Molimo Mosanto. a. Baloma 8 :22-27
b. Baefeso 4 :30 c. Bagalatia 5 :16 d. Baefeso 5 :18 e. 1 Batesaloniki 5 :19
10. Nzambe apesa mibali mpe basi makabo ya kolendisa mpe kokembisa nzoto ya Klisto. Tanga na Baefeso 4 :11-15 bakambi nini Nkolo apesi lingomba na motindo ya kokola mpenza kati na Klisto ?
11. Molimo Mosanto apesi biso makoki ya kososola solo ya Molimo mpe asungi biso totonda na kotonda ya bonzambe. Tanga Baefeso 3 :16-19. Tanga nkombo moko moko ya makabo misato oyo Paulo abondelaki ete Molimo asala kati na biso.
a. b. c.
Made with FlippingBook - Share PDF online