Bunda etumba elamu ya kondima

62 • Bunda etumba elamu ya kondima

Yesu abondelaki mpo na biso mpe mpo na baye bazali kondimela Ye lokola Nkolo mpe Mobikisi. Apesaki elaka ete Molimo Mosanto asengélákí koya mpo na kotia efandelo na Ye na kati na biso. Sikoyo Molimo Mosanto afandi na kati ya mondimi nyonso oyo ayamboli masumu mpe andimeli Yesu Klisto. Azali kopesa na Moklisto moko moko makabo kokesana mpe makoki ya kotombola bondimi na bango epayi ya Klisto, kosunga bango mpe kokembisa bango epayi na Klisto, kosunga bango bakola na lolenge ebongi. Ya solo, Molimo Mosanto azali ndanga ya libula oyo bandimi bakozwa ntango Nkolo Yesu akozonga kotelemisa bokonzi na Ye. Nzambe Tata, na ngolu na Ye, apesaki mondimi nyonso likabo na nzela ya Molimo Mosanto mpo na kopesa nguya mpe kotelemisa libota na Ye. Wana makabo ezali ya kokesana, misala mpe bitinda ya kokesana epesami na Molimo Mosanto, apesi na moklisto moko moko ya ye likabo ya kosalela mpo na lisungi ya bandeko baklisto misusu. Moklisto nyonso azali na makabo, mpe moko moko azali na lotomo ya kosalela makabo na ye mpo na kotonga nzoto ya Klisto ete ezwa makasi mpe ekemba. Tobengami kozala babateli malamu ya makabo kitoko oyo ya ngolu ya Nzambe, kosalela yango na lolenge ekopesa lokumo epayi na Nkolo na nzela ya Yesu Klisto. Na nzela ya Molimo Mosanto tobengami tozala na bonsomi, kasi bawumbu ya ezaleli na biso ya kala te, kasi tozala nde nzela oyo ekosunga ete mbuma ebotama.Tosengeli bobele komitika na Ye mpe kolanda ye na nyonso. Makomi ya kobakisa oyo bosengeli koyekola mpe kokanisa mpe elandani na liteya oyo yango oyo : Litatoli na biso ya bonsomi na nzela ya Klisto (Monk.ya kob.9) Yesu ya Nasaleta : Ngonga ya ndele ( ya ntango ekoya ) esili kokóma (Monk.ya kob.4) Ezali mopepe moko nde efulami na ndundu, na kelelo, kasi mingongo ya ebeteli wana nde ekeseni moko na mosusu. Ezali ndenge moko Molimo azali kosala na kati na biso bana na Nzambe, kasi mbuma ekeseni na kobotama na yango, nde nyonso epesi Nzambe lokumu na nzela na yango kolandaka ezaleli mpe bomoto ya moto moko moko.

Na mokuse

Minkanda ya kobakisa

~ Sadhu Sandar Singh Richard J. Foster and James Bryan Smith, Eds. Devotional Classics: Revised Edition: Selected Readings for Individuals and Groups. Renovare, Inc. (HarperCollins Publishers), New York. 1993, p. 291.

Made with FlippingBook - Share PDF online