Bunda etumba elamu ya kondima

Liteya ya míneyi (4) Makabo oyo tozwaka • 63

Nzambe nde azali kosala kati na yo ete olinga mpe osala lokola elingi Ye (Bafilipia 2.13 ).

Mobeko ya ntina

Koyekola makambo tokutanaka na yango

Botanga mpe bokanisa na makambo mpe makanisi oyo ekesani, mpe boyanola na bozindo nyonso na kolandaka makomi towuti komona. 1. Yango Molimo Mosanto akoki nde kosundola moklisto? Mbala na mbala, moklisto nyonso akutanaka na komekama oyo ekomisaka ye kino na makanisi ya kotia ntembe na lobiko na ye, mpe kutu kobanza ete Molimo atíká ye. Kutu mateya mosusu etatoli ete moklisto oyo ayamboli, abongwani mpe andimeli Yesu, likolo ya kozanga botosi Nzambe na nko, akoki kosala na lolenge ya moto oyo azali lisusu mwana na Nzambe te. Tanga nanu makomi oyo mpe pesa biyano na yango: yango Molimo Mosanto akoki nde kotika Moklisto?

a. 1 Yoane 5 :11-13 b. Baefeso 1 :13-14 c. Baloma 8 :31-39

2. Ndenge nini nakoyeba soki eloko ewuti na Molimo kasi na ngai moko te? Moko na mitungisi ya mondimi nyonso oyo akembi nanu na Yesu te ezali kobatela makanisi na ye mpenza mpe koyimayima. Ata lokola tobíkísámá mpe tozali bato ya Yesu, moyini azwaka bobele nzela ya kokotela biso na makanisi mpe kopesa biso makanisi oyo ewuti na Nkolo te, to oyo ezali na litomba mpo na biso te. Makanisi nyonso ekotaka na milimo na biso ewutaka bobele na Molimo Mosanto te ! Zabulu azali lokuta mpe mokosi monene (Yoane 8 :44) Tokoki kolonga ye mpo Molimo Mosanto oyo afandi kati na biso aleki ye na makasi. (1 Yoane 4 :4). Tokoki nde komekola Nkolo na biso, totelemela Zabulu na nzela ya kososola makomi, mpe na koboyaka kondima mpe komizwela makanisi mpe koyimayima oyo ekoki kokotela biso na makanisi. (Baloma 12 :1-2 ; 2 Bakolinti 10 :3-5). Tanga eteni ya makomi oyo elobi mpo na komekama ya Yesu. Tala malamo ndenge nini Yesu ayanolaki na lokuta ya monguna bobele na Liloba na Nzambe. Kaka bongo tosengeli komekola ndakisa ya Yesu. 3. Boyokani nini ezali kati na Molimo Mosanto mpe Liloba na Nzambe? Nzela oyo ezanga likama mpe ya nguya mpo na koyeba likanisi ya molimo ezali ya komesana na Liloba na Nzambe. Liloba na Nzambe elobi ete Molimo Mosanto amemaki bakomi ya Biblia na motindo oyo emonisi ete makambo bakomákí ewutaki na Nzambe

Made with FlippingBook - Share PDF online