Bunda etumba elamu ya kondima
64 • Bunda etumba elamu ya kondima
ye moko. (2 Petelo 1 :20-21; 2 Timoteo 3 :15-17). Ntango tozali koyokamela Makomi na Nzambe, tosengeli kotanga yango mpe kobomba milongo na yango na motu na biso, koyekola biteni ya makomi, mpe kokanisa ndimbola na yango mpo tokoka kokesenisa makanisi ya Molimo Mosanto. Ebundeli ya komibatela na etumba mpo moklisto abunda na lokuta ya zabulu ezali Liloba na Nzambe, « mopanga ya Molimo » (Baefeso 6 :17). Mpo na nini ezali na motuya kopima matatoli nyonso tozali koyoka, oyo ekeseni na mateya ya mopanga ya Molimo, Biblia (Tala 1 Tesaloniki 5 :19-20) ? Lokola moklisto oyo azali nanu kokola, ezali na motuya mpo na yo kososola makabo ya Molimo Mosanto, makabo oyo mondimi ya Klisto azali kozwa. « Na mokolo ya suka ya nteke (to feti), mokolo monene, Yesu atelemaki mpe alobi na mongongo makasi : « Moto oyo azali na mposa ya mayi aya komela epayi na ngai ». Soki moto andimeli ngai, lokola elobi Makomi : « Motema na ye ekokoma liziba ya mayi na bomoyi ». Sikoyo, boye nde alobaki na ntina na Molimo Mosanto, oyo bato bandimelaki ye basengelaki kozwa yango, mpo bapesamalaki nanu Molimo te ; Mpo ete Yesu akumisamaki nanu te (Yoane 7 :37-39). Yo lokola moklisto, Yesu atika elembo ya Molimo Mosanto mpo na yo kino mokolo Klisto akozonga mpo na kosikola biso (Baefeso 1 :13-14). Na ngonga malamo ya lisolo, Nzambe atindaki mwana na Ye kosikola biso mpo ete biso bato tondimá tozwama lokola bana na libota na Ye. Sikoyo, mpo tozali bana na Ye, Nzambe atinda Molimo ya Yesu na kati na mitema na biso, oyo ezali kolela : « Abba ! Tata ! » (Bagalatia 4 :6-7) Molimo Mosanto abengaki yo mpo ozala na bonsomi, otambola na nguya na Ye, oyeba makambo mpe opambolama na Liloba na Ye. Tobengamaki mpo tobika na bonsomi na kokitisama na ekweli, etumbu mpe na kofundama. Tosengeli lisusu komipesa na komitala biso mpenza te, na lolenge oyo ekomema biso bobele na masumu. Tokoki koluka bomesano ya sika na makanisi, kobikela lolenge ya kobikela ya sika, mpe tozwa lolenge ya sika ya kofanda na bandeko misusu. Mpo ete Molimo Mosanto azali kati na biso, tosengeli kolanda bamposa na biso ya ezaleli ya kala ya masumu te. Bopona, to bokoki kobika na makambo oyo Molimo Mosanto alingi bosala, to na komipesa na mposa ya bizaleli na bino ya kala ya masumu. Oyo tokopona, tokobuka mbuma na yango (Bagalatia 6 :7-9). Pona lobiko ! Tambola na Molimo, kasi na mosuni te. Senga Molimo Mosanto apesa yo nguya. Umela na Liloba na Ye (Makomi) mpe lobela Ye na kolemba te. Sala nyonso akosenga yo na mbala moko kasi na kobanza banza te. Kolemba te. Ntango ozali kobatela etambweli na Ye, yo mpe okomesana mingi koyokamela Ye mpe kotosa Ye mpe kolanda Ye na banzela akomonisa yo.
Bokutanisi
Made with FlippingBook - Share PDF online